Mamelo Raffaella Petrini, mosangani ya sika ya Kommission ya makambo mya bonkuku
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Komission ya makambo mya bonkuku ezwi mosangani mwa sika. Na mokolo mwa mibale ya sanza ya Febwali (2 Fevrier), Pápa aponaki lokola mosangani ya lisanga lyango, Mamelo Raffaella Petrini, mokambi ya Kommission pontificale mpo na Etukà ya VatiKan mpe mokambi ya Gouvernorat ya Etukà ya Vatican.
Liyebisi lyoko lya ndako ya bopanzi nsango ya Vatikan to Saint-Siege nde ebimisaki yango. Kommission ya makambo ya bonkuku (affaires réservées) esalemaki na mobù 2020, Kardinal Kevin Farrell nde azalaki lokola mokambi.
Ezali ebongiseli oyo ezwaka bikateli to mikano mpo na kobatela sekele na misala mya Pápa na makambo matali mibeko, nkita to mosolo; ezali kobatela polele mpe kolandela misala mya kopesa makabo mpo na misala ya Leta ya Saint-Siege mpe ya Etukà ya Vatikan, mpe ezali kokengele misala ya ba contrats ya Saint-Siege.
Mamelo Raffaella Petrini, azali moko to mosangani ya lisangá lya ba Sœurs franciscaines ya Ukaristya. Abotama na Roma, mokolo mwa 15 ya sanza ya Yanuali ya mobù 1969, azwi diplome na makambo ya politiki na Université Libre Internationale Guido Carli mpe na doctorat na Université pontificale Saint-Thomas- ya Aquin. Bàndà 2022, azali Secrétaire Général ya Gouvernorat. Na mokolo mwa zomi na mitato ya sànzà ya febwali (15 fevrier) ya mobù 2025, aponamaki na Pàpa François lokola mokambi ya Kommission pontificale mpo na Etat ya Vatican, mpe mokambi ya Gouvernorat, na mandat kobanda le 1 mars 2025.
Sœur Raffaella Petrini, membre de la congrégation des Sœurs Franciscaines de l'Eucharistie. Née à Rome le 15 janvier 1969, elle est titulaire d'une licence en sciences politiques à l'Université libre internationale Guido Carli et d'un doctorat à l'Université pontificale Saint-Thomas-d'Aquin. Depuis 2022, elle occupe le poste de secrétaire générale du Gouvernorat. Le 15 février 2025, elle est nommée par le Pape François présidente de la Commission pontificale pour l'État de la Cité du Vatican, ainsi que présidente du Gouvernorat, avec un mandat débutant le 1er mars 2025.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
