Luka

Likita lya bansó: Nzámbe akoloba na bosáleli lokóta ya bato

Na bokobi molongó ya litéya etáli likambo-likonzi ya Dei Verbum, Papá Léon abiangaki bandimi basangani, na ndáko ya makita Polo VI, ya kokolisa botatá ya bonzámbe mpe ya bomoto ya Nkomá Esántu po ya kobimisa matéya po ya leló. Nzámbe azali mokomi ya ntina ya Nkomá mpe aponi komilakisa na bosáleli nkóta ya bato. Kosála 'te moningá asosola ezali ekela ya yambo ya bolingo mpe ezali malámu boni Nzámbe akoloba na bisó na lokóta ya bato mpe ya lólá te.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

"Likanisi ya Nkomá Nionso ebotami na Nzámbe; ezali na ntina po ya kotéya, kotelemela mabé, kosembola, kotangisa na bosémbo". Ezali litangi ena ya mokánda ya mibalé ya Polo na Timothéo ndé ezalaki mosisa ya litéya ya mokolo ya misáto 4 ya sánzá ya ibalé esika wápi Léon XIV akolisaki bomanyoli na bobotisi likanisi ya bonzámbe ya Nkomá Esántu mpe ndimbola na yango. Nkomá Esántu, etangemi na Momesano ya bomoi ya Eklezia, ezali "esika yoko ya ntina ya bokútáni epái wápi Nzámbe akokoba koloba na mibáli mpe na bási ya bileko binsó, zambi na boyoki ye, bakoka koyéba ye mpe kolinga ye". Yangó waná mikánda ya biblia bikomami na lokóta ya lólá te to ya moto te.

 Kosála 'te moningá asosola ezali ekela ya yambo ya bolingo

Se bongo bato mibalé bakoki kosolola mpe kosála boyokani yoko te, soki bakoloba monoko moko te, "maloba ya Nzámbe, na boleki na nkóta ya bato, bikokani na lokóta ya bato, se bongo ndé kála Liloba ya Nkolo, na bozui boleme ya nsuni na bisó, ekokani na eye ya bato". (DV, 13). Yangó ezali elembo 'te Nzámbe alingi bisó yambo mpenza, na boponi koloba nkóta ya bato. Ezali bongo ndé Nzámbe akomilakisa na bisó, "bakomi ndéngé na ndéngé, bazui likanisi ya Elimo Sántu, bakomaka mikánda ya Nkomá Esántu", engebene na mayéle na bangó moko.

"Bôngó, kaka na eye ezali na ntéi na yangó te, kasi lokóla na lokóta na ye, Nkomá ekolakisa mawa ya bonéne ya Nzámbe epái ya bato mpe mpósá na ye ya kokoma penepene na bangó".

Nzámbe aloba na nzelá ya bato na loléngé ya bato

"Mokánda ya Concile, elobi mokitani ya Petelo, ekoloba Nzámbe lokóla "mokomi" ya ntina ya Nkomá Esántu, kasi ekobenga lokóla ba hagiographe "bakomi ya sóló" ya ba buku bibonzama". Bakomi loléngé na loléngé ya Makomi Bisántu bazali bisalelo ya pamba te, kasi bazui likanisi na Nzámbe po ya koyébisa liloba ya Nzámbe na bosáleli mitindo ya bokomi mpe mayéle ya kokela ya eleko na bangó, biye bikokotisa bilili mpe ba ndakisa. Nzámbe akoyokisa moto pási te mpe makoki na ye mpe akokaki kokitisa bakomi ya mikánda bisántu na mokomi ya pamba te.

Mokáno ena ya ekela ya Bosakoli ya bonzámbe ekoloba po ya bisó leló sika ya Liloba ya Nzámbe. "Eklezia ebengami ya kopesa lisusu Liloba ya Nzámbe na lokóta lyoko ekoki kokota na lisapo mpe kosimba mitéma". Esengeli bôngó kosálela lokóta lyoko ezanga koyébana te, ekoyebisa malámu te, na bobángi ya kokóma na matangi ya mabé ya Nkoma.

Léon akotanga áwa oyo ye alanda, na bolobi Evangelii gaudium ya Papá François:

"Tángo insó tokoluka kozonga na liziba po ya kozongela mpiyo ya ebándeli ya Nsango-Ndamu, ba nzelá ya sika bikobima, ba loléngé ya kokela, ba ndéngé misusu ya bolobi, bilembo bikolakisa koleka, maloba bitondi na ntina ya sika po ya mokili ya leló".

Kotánga mpe kolimbola Liloba ya Nzámbe leló

Etinda ya Eklezia ezali ya kobimisa Liloba ena lisusu leló: "Nkomá elingi koloba na bandimi bondimi ya leló, kosimba bomoi na bangó ya leló na makambo na yangó, kolakisa polélé matambe ya kosála mpe mikáno ya kozua. Waná ekoki kosálema kaka tángo mondimi akotanga mpe akolimbola mikánda misántu na bokambemi ya Elimo kaka eye ebimisaki likanisi na yangó".

Yangó esengeli na litatoli lyoko ya malongá, Papá Léon XIV abeti nsete, na botángi sántu Augustin: "Moto atá nani akanisi asosoli Makomi ya bonzámbe [...], na kolonga te, na eye asosolaki, ya kotelemisa ndáko ya bolingo ena mibalé -ya Nzámbe mpe ya moningá-, asosoli yangó nanu te". Nkomá ekosálisa ya koléisa bomoi mpe libonza ya bandimi.

Nsango-Ndamu ekoki kokitisama na nsango ya pamba te

"Ebándeli ya bonzámbe ya Nkomá ekoloba lisusu lokóla 'te Nsango-Ndamu, epesami na litatoli ya baye bazua batisimo, na bopesi likopi na loléngé insó ya bomoi mpe ya bosóló, bazala likoló na yangó: ekoki kokitisama te na nsango moko ya pamba, kasi ezali nsakola ya esengo ya bomoi nionso mpe ya seko eye Nzámbe apesa bisó na Yézu".

Nkomá ezali mokánda moko ekangami na bosóló ya lisapo mpe ezali na mozindo ya molimo ndelo te eye ekoloba na bato ya bileko binsó mpe ya bisika binsó, na boyebisi libosó mpenza bolingo ya Nzámbe mpe mpósá na ye ya kobikisa bisó. Ezali bongo ndé Sántu Papá asukisaki litéya na ye, na bobengi bisó ya kokúmisa Nzámbe po ya Liloba na ye eye ekoléisa bomoi na bisó, ekongengisa ba nzelá na bisó mpe akoloba na bisó lisusu elaka ya bomoi ya seko.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

04 sánzá ya míbalé 2026, 16:26