Papa Léon XIV na likita lya banso Papa Léon XIV na likita lya banso  (ANSA)

Likita lya bansó: Liloba ya Nzámbe ekokamba Eklezia mpe ekopesa ye etinda

Likita lya bansó ya mokolo ya misáto 11 ya sánzá ya mibalé ekokoba botángi lisusu Likambo-likonzi ya concile Dei Verbum. Léon XIV atelemi leló na mokako ya motóbá ya mokánda, etáli Liloba ya Nzámbe o ntéi ya bomoi ya Eklezia.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Koyébisa Kristu, mpe na yangó, kosálisa etinda. Waná ezali ntina ya Liloba ya Nzámbe ebimi na Nkoma Esántu, mpe yangó ezali ntina ya litéya ya Léon XIV mokolo ya misáto eye 11 ya sánzá ya mibalé o eleko ya likita lya bansó. Na bokobi molongó ya matéya ya mikánda ya Concile Vatican II, mingi mpenza ya Likambo-likonzi Dei Verbum, Papá wa Roma abongisaki maloba na ye na mokako ya motóbá ya mokánda ya Concile, ebonzama na "nsinga ya mozindo mpe ya bomoi káti ya Liloba ya Nzámbe mpe Eklezia". Bongo, lokóla elobi Concile, "Eklezia ekomemiaka kaka Makomi ya bonzámbe"; Biblia, ebotami na likanisi ya Elimo Sántu, ezui esika na ye o ntéi ya lisangá ya bokristu. Epesami na bandimi, eyebisi bangó ndimbola na ye mpe ekolakisa nguyá na ye. Na matéya matali milulu mya losámbo, Liloba ya Nzámbe evandi na mesa moko eye ekoyamba Nzoto ya Kristu, na bosakoli káti na ye na bomoi ya Eklezia.

Likanisi ya ntángo inso ya Eklezia

Atá sima ya Concile, mpe mpenza o eleko ya Synode ya baepiskopo ya 2008, eye etálaki Liloba ya Nzámbe na bomoi mpe etinda ya Eklezia, eye ezalaki kokanisa nanu motúya ya Makomi Bisántu. Lilendisi ya Eklezia sima ya Synode ya Benoît XVI, Verbum Domini, ebimaka mibú mibalé sima ya synode ena, elobaka lisusu "nsinga ya káti o ntéi ya Liloba mpe ya boyambi", na bosemboli 'te "esika ya ebándeli ya bolimboli ezali bomoi ya Eklezia". Ezali bôngó o ntéi ya lisangá ya Eklezia, ndé Liloba ya Nzámbe ekokisi etinda na ye mpe ezui ntina na ye: "koyébisa Kristu mpe kofúngola lisoló na Nzámbe". Dei Verbum ekolakisa Boyebisi "lokóla lisoló lyoko, esika nini Nzámbe akoloba na bato lokóla na baningá". Lisoló ena, mpenza ya motéma, esálemi "ntángo tokotanga Biblia na ezaleli ya losámbo na káti: waná Nzámbe akoya na bokútani na bisó".

Liloba ya Nzámbe, ekokamba lisangá ya bokristu

Na loléngé ena, Likomi ekosála mosála moko ekási, "ekosálisa mpe ekolendisa lisangá ya bokristu", elobaki lisusu Papá. Kaka te, "bandimi bansó babéngami ya komela na liziba ena, yambo na misa mpe na ba sakraménto bisusu", kasi lokóla "bolingo ya Makomi Bisántu mpe bomeseni na yangó bisengeli kokamba baye bakosála na ministeli ya Liloba: baepiskopo, ba sángó, ba diakono, ba katekisi". Liloba ya Nzámbe ezali mpe káti po ya boyékoli na bozindo liloba ya Nzámbe, mpe Léon XIV ya kosembola ezaleli ya ntina ya "mosála ya bayékoli ya mikánda bisántu mpe ya baye bakosalela ba nzebi ya biblia".

Ntina ya motindami

Nzokándé, mpósá ya koleka ya Eklezia, "ezali 'te Liloba ya Nzámbe ekoka kokoma na moko moko ya bilama na ye mpe koléisa yangó na nzelá ya boyambi"; "Etindika lokóla Eklezia mosika ya ye-méi", mpe "efúngola ntángo inso etinda epái ya bansó", elobaki lisusu Léon XIV. Soki "tokobika tokangemi na maloba ebelé", biye mingi bizali na eloko te, "Liloba ya Nzámbe, yangó, ekoyanola na mpósá ya liyoki, ya bosóló na bomoi na bisó", "ekosilaka te, ekokatana te ya kopesa bozui na ye".

Kristu, Liloba ya bomoi ya Tatá

Nkoma Esántu ezali ya sóló mansó po ya Yézu-Kristu. "Kristu azali Liloba ya bomoi ya Tatá", esémbolaki Sántu-Papá, "Makomi mansó bikosakola Bomoto na ye mpe bozali na ye ya libiki, po ya moko moko na bisó mpe mpo ya bato bansó". Mokristu moko moko abengami ya kofúngola motéma na ye mpe ya koyamba likabo yangó.

Mokolo ya mokili ya mbala ya 34 mpo ya bato ya bokono

Na súka ya likita lya bansó, na bopesi mbote na bato ya mobémbo mwa boyambi na ndáko ya makita Polo VI baútaki bikóló ebelé, Léon XIV asakolaki 'te akokende na mobéngá (grotte) ya Lourdes, na bilanga ya Vatican po ya kopelisa kandéla, "na elembo ya losámbo na ngai po ya bato bansó ya bokono, baye tokokanisa leló na bolingi boko ya malámu, na Mokolo eye ya mokili mpo ya moto ya bokono", ekosálema na 11 eye ya sánzá ya mibalé.

Na lokóta ya Espagne, episkopo ya Roma alobaki pembeni na ye na bato baye bakosangana na Chiclayo, dioceze na ye ya súka na Péru, po kosepela Mokolo ya mokili ya moto ya bokono, na bopesi "moko moko, mingi mpenza bato ya bokono mpe mabótá na bangó, na bobateli ya bomama ya Ngondo Maria". Papá azuaki likanisi lyoko lokóla po ya bato babetami na mpela ya makási na Colombie na bokaboli pási na ye na baye bazui makámá mpe na bobengi "lisangá mobimba ya kosálisa mabótá bazui pási na libonza mpe na losámbo".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

11 sánzá ya míbalé 2026, 14:23