Luka

2026.01.17 Prince Albert II ya Monaco ayambamaki na Léon XIV , o mokolo mwa 17 ya Yanuali 2026 2026.01.17 Prince Albert II ya Monaco ayambamaki na Léon XIV , o mokolo mwa 17 ya Yanuali 2026  (@VATICAN MEDIA)

Leon ya XIV akoki kokende mobembo na Bokonzi ya Monaco na nsuka ya sanza ya Marsi

Ndako ya bapanzi sango ya Vatikan endimi epai ya bapanzi sango ‘te bokutani ya Mokonzi Ntomà monene ezali nayino kozela mokano. Prince Albert II abengisaki Pape akende na Bokonzi bonà mpo na boko bokutani nà Vatikan, bosalemaki na mokolo mwa 17 ya sanza ya Yanuali moleki.

Bansango ya Vatikan

 

Ekoki kozala mwa mobembo moko na lombango, ya mokolo moko kaka, lokola mobembo mosalaki Pàpa François na Corde na mokolo mwa 15 Desembe ya mobù 2024. Sik’awa, mobembo moye mozali kozila nayino mokano, elobi ndako ya bopanzi nsango ya Saint-Siège na motuna ya bapanzi nsango. Mobembo mwango na Monaco ezali mbala ya yambo oyo pápa moko akei kotala bokonzi to Principauté ya Monaco, mboka ezwami na ngambo ya Sudi-Esti ya ekolo France.

Monaco ezali ekólo ya mibale oyo eleki moke na mokili mobimba, sima ya Vatikan. Bokonzi bwa yango ezali na bato 39 000 na etando ya 2 km2. Bato bayiké bafandaka kuna (3/4) bazali bato ya bikólo bisusu, oyo basepelaka na klima ya Méditerranée mpe bafutaka mpako ya malamu. Leta na yango, esakolaka boyambi ya Katoliko.

Léon XIV ayambaki prince Albert II ya Monaco
Léon XIV ayambaki prince Albert II ya Monaco   (@VATICAN MEDIA)

Mobembo ya mbala ya mibale na mikili

Sima ya mobembo na Turquie mpe na Liban na sanza ya Novembe mpe ya Desembe ya mobu 2025, Monaco ekoki kozala mobembo ya mbala ya mibale ya Pape Léon XIV na mokili mobimba banda boponomi bwa yé o mokolo mwa 8 ya sanza ya Mayi. Léon XIV amonisaki mpe mposa ya kokende na Afrika.

Na mpepo oyo ezalaki kozongisa ye na Liban, ayebisaki bapanzi nsango ya mpepo ya pápa mposa na ye ya kotambola na mabele maye mpe mingi mpenza na Algérie, mboka ya Santu Augustin: «Ngai moko na zali na elikya ya kokende na Algérie mpo na kotala bisika oyo etali bomoi ya Santu Augustin, kasi mpe mpo na kokoba masolo mpe kosala boyokani kati na mikili mya Bakristu mpe ya ba Musulmans. Nasilá kolobela likambo liye liboso, kasi na esika mosusu. Ezali na ntina makasi koye bomoto ya Santu Augustin. Mpamba té, ezali na mokumba ya ntina mingi, lokola gbagba, mpo ya kosangisa mimeseno. Bongo mpe na Algerie, bakomemya ye mingi mpenza, lokola mwana wa mboka», elobaki Leonya XIV.

Pape azali koloba elongo nà bapanzi nsango na kati ya mpempo na tango ya mobembo na Turkie
Pape azali koloba elongo nà bapanzi nsango na kati ya mpempo na tango ya mobembo na Turkie   (ANSA)

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

11 sánzá ya míbalé 2026, 12:49