Angélus: O kati ya mwa molili ya lisapo lya bato, Bisengo Mwambe ekongengisa mwinda
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na mokolo mwa Lomingo, mwa 1 Febwali, Pápa atyaki makanisi ma ye na Nsango Elamu Santu Mateo. Tata Mosantu alimbolaki ut’o lininisa to mbalasani ya ndako na ye ya bontòmà, ’te: “Bango bazali miinda miye Mokonzi azali kopelisa kati na molili ya lisoló to lisapo lya bato, mp ona komonisa mwango mwa lobiko oyo Tata azali kokokisa na nzela ya Mwana, na nguya ya Elimo Santu”.
Tango atangi biteni ya bisengo Mwambé, Tata Mosantu atángaki bantina oyo Nzambe akoki kokomisa “esengo” bato oyo bazangi ntina na mokili: “Kaka Nzambe nde akoki mpenza kobenga babola mpe bato bya mpasi ’te bazali na esengo (tala molongo 3-4), mpo Ye azali bolamu bwa likolo oyo amipesaka na bato banso ba bolingo ezangi nsuka. Bobele Nzambe nde akoki kokokisa mposa ya baoyo bazali koluka kimya mpe bosembo. 6.9), mpo ete Ye azali Mosambisi ya sembo ya mokili mobimba, Mobandisi ya kimya ya seko . . . kati na monyoko, Nzambe azali liziba lya libiki to ya kosikolama; kati na lokuta, azali anzelu ya solo. Pàpa alobi ’te ezali na bantina mingi mpo na yango Yezu alobaki ’te: “Bósepela, bózala na esengo”. (v. 12).
Tata Mosantu alobaki ‘te ; “Bisengo Mwambe biye etikali se lokola ntembe, mpamba te bakanisi ‘te Nzambe akeseni na oyo Kristu amonisi”. Ya solo, «baoyo bamesaná kokanisa ‘te bolamu ezali bobele mpo na bazwi » bakoki kokanisa ‘te Yezu azali makanisi mpamba ma lokuta. Kasi, Pápa alobi, «kozanga kondima ezalikowuta nde bozangi boyambi na Kristu: azali mobola moye akaboli bomoi bwa ye na bato banso, moto ya boboto oyo akangi motema na kati ya mpasi, moto ya kimya oyo anyokwamaki tee na liwa o kuruze.
Yezu amonisi ntina to angengisi mwinda ya lisolo lya bato (Emoniseli 11:1, 2) Liloba yango ekomami te na bato oyo balongi, kasi na Nzambe oyo abikisaka bato oyo banyokwami, mpamba te Nzambe apesi elikya liboso epai ya bato baye epai wapi bato ba mokili bazali komona mpamba.
Na yango, Bisengo Mwambe esengi na bakristu bàmituna mituna miye: esengo ezali «eloko ya kosomba» to «likabo liye bakokabola»? Ezwami nde na kati ya «biloko oyo ekoki kobeba to na kati ya boyokani na biso nà basusu? » Nako yanola, Pápa alobi ‘te Yezu abongoli mawa ya mimekano na esengo mpo na baye bazwi libiki to basikolami.
«Yesu azali kolobela libondi lya mosika te, kasi azali nde kolobela ngrasya ya yé ya seko, oyo ezali kosunga biso tango inso, mingi mpenza na tango ya mpasi to mawa».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
