Angélus: Luka okanga o kati ya Mobeko na mobeko, eséngà ya bolingo

Na lomingo la 15 Febwali, liboso lya losambo la Angelus, Pàpa apesaki limanioli la mateya ma yé, na ngambo ya mibale ya “lisolo lya ngomba”, oyo ezali kolimbola ndimbola ya solo-solo ya mibeko mya Moyize. Mokonzi Ntomà monene akundwelaki lisusu bakristu soki 2000 oyo bayanganaki na esika ya Saint Pierre ‘te «bosembo moke ekoki te, esengeli bolingo bonene, oyo ekoki kosalema na nguya ya Nzambe».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Pàpa alobi ‘te, sima ya kosakola Bisengo Mwambé, Yezu - na masolo ma ye ya ngomba - Atyaka likebi mingi na boyokani ya solosolo elongo na Nzambe na esika ya kobanga Nzambe na libándá, mpe ezali kosenga na bato ‘te bákota na makambo ma sika ya Bokonzi bwa Nzambe. «Po na kokamba biso na mobembo moye, Kistu amonisi ndimbola ya solo solo ya Mibeko mya Moize”. Alakisi ‘te mibeko mya Nzambe oyo epesamaki na Ngomba Sinai ezali te mpo na “kokokisa mposa ya eyamba na libándá mpamba, mpo na komiyoka ‘te ozali sembo liboso lya Nzambe, kasi mpo na kokotisa biso na boyokani ya bolingo elongo na Ye mpe elongo na bandeko ba biso”.  Zambi ezali mpe kolimbola mpo na nini alobaki ‘te “ayaki te mpo na kolongola Mibeko, kasi mpo na kokokisa myango”.

Mibeko mizali nzela ya kobanda koyeba Nzambe

Mpo na Mo-Nazareno, “kokokisama ya Mibeko” ezali mpenza bolingo. Mpamba te, ezali kokokisa ndimbola na yango o bozindo mpe kokokisa ntina na yango ya nsuka. Pápa alimbolaki ‘te ezali mpo na kozwa “boyengebene boye boleki” oyo ya bakomeli mpe Bafalizayi, boyengebene boye bozali bobele kotosa mibeko te, kasi oyo ezali kofungola biso na bolingo mpe ezali kokotisa biso kati na bolingo.”Yezu amonisi bokeseni kati na boyengebene ya lingomba mpe boyengebene ya Bokonzi bwa Nzambe”. Na esika moko, azali kokundwela bato mibeko miye Mose apesaki, ‘te: “Boyoki “te balobi na batata ba bino, Kasi ngai nazali koloba na bino ‘te”. Leon XIV alingi koyebisa na biso ‘te, Mibeko epesamaki na Moyize mpe na ba Profeta lokola nzela ya ebandeli ya koyeba Nzambe mpe ba makanisima ye mpo ya biso na mpe mpo ya lisapo. Sik’awa, “yemei ayei kati na biso na bomoto bwa Yezu, oyo akokisaki Mibeko, akómisi biso bana ba Tata, mpe apesi biso ngolu ya kokóta na boyokani elongo nà yé lokola bana mpe lokola bandeko kati na biso”.

Koyeba ndimbola ya Bokonzi bwa Nzambe

Liteya liye tokoki kozwa na nzela ya Kristu ezali ‘te “bosembo bwa solo ezali bolingo” mpe ‘te, na mibeko minso, tosengeli kososola lisengi lya bolingo. Nzoka nde Pàpa amonisi ‘te : « ekoki kaka te koboma moto te na nzoto, soki na nsima okoboma ye na maloba, to soki otosi lokumu la ye te». Mpe abakisi lisusu, “Kozala sembo na molongani wa yo mpe koboya kosala ekobo ekoki te, soki boyokani yango ezangi bolingo, koyoka, limemya, komitungisa mpo na molongani wa yo mpe kosala elongo mpo na kokokisa mokano moko ”.

Na kosukisa, Pàpa alobaki maloba maye: “Nsango Elamu ezali kopesa biso liteya lya motuya: bosembo moke ekoki te, esengeli bolingo monene, oyo ekoki kosalema na nguya ya Nzambe”. Abyangi bakristu banso, basangana elongo, babelela Ngodo Maria, “oyo abotaki (...) Moto oyo akokisi Mibeko mpe makanisi ma lobiko”, mpo ‘te “asalisa biso na kokota na makanisi ma Bokonzi bwa Nzambe mpe na kozala na bomoi ya bosembo bwa ye”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

15 sánzá ya míbalé 2026, 15:52