Angelus : «Esengo kati na Yezu, Bokenzu bwa solo ya mbomoi»
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Ut’o lininisa lya ndako ya bantómà mpe liboso lya bandimi na esika Saint-Pierre, Pàpa atyaki likebi na makambo elandi na lisolo likoló lya Ngomba. Sima ya kosakola makambo ya Bisengo mwambé, Yezu alobaki na bato baye bazalaki na bomoi na ntango wana, ‘te na mpo ya bango, mokili ezali lisusu lolenge moko te mpe mokili ezali lisusu na molili te. «Bozali mongwa ma nsé (…) Bozali mwinda mwa mokili» (Mt 5, 13-14)
Esengo yango ekowuta na lolenge lyoko ya bomoi
Kobanda na bandakisa biye mibale, ya Mongwa mpe Mwinda, Pàpa Leon XIV alobi ‘te ezali nde “esengo ya solo ekopesa bokenzu na bomoi mpe elimboli makambo mazalaki te liboso. Alobi ‘te esengo yango eutaka na lolenge lyoko la bomoi, lolenge lya kofanda na mabele mpe ya kofanda elongo n abato oyo basengeli kolingama mpe koponama”. Ezali bomoi nde ezalaki kongenga na Yezu, elengi to bokenzu bwa sika ya misala mpe maloba ma ye.
Bosembo, Mwinda mwa mokili
Kozala mwinda mwa mokili ezali kosenga ‘te tótambola na boyengebene to bosembo mpe na bosolo. Episkopo wa Roma azongelaki makambo maye mosakoli Izaya akomaki mpo na kosilisa bozangi bosembo: “Kokabola limpa na yo na moto oyo azali na nzala, koyamba na ndako na yo babola mpe bato oyo bazangi ndako, kolatisa moto oyo tozali komona bolumbu, kobosana te bazalani mpe bandeko ba yo, (tala na Is 58, 7)”. Mpe, ekobi mosakoli koloba ‘te, “na yango, mwinda mwa yo mokongenge lokola ntongo, mpe mpasi na yo ekosila noki, (na molongo 8). “Na ngambo moko, mwinda, eloko eye tokoki kobomba te, mpamba te ezali monene lokola moi moye ebenganaka molili ntongo nyonso; na ngambo mosusu, mpota oyo ezalaki kotumba liboso mpe ezali kobika sikawa”, emonisaki lisusu episkopo ya Roma.
Nzambe akobwaka biso soki moke te.
Ntoma-Mokonzi asengaki lisusu bana ba Nzambe ‘te: bázongisa esengo enà na «bilembo bya solo oyo ezali komonono polele» ya bofungwami mpe ya bomitungisi mpo na baninga basusu». Alendisaki bango báboya «banzela nyonso ebebisaka bokenzu bwa biso» mpo bákóma mpe bátikala bayekoli ba Kristu lokola mungwa mpe mwinda mwa mokili. Tika ‘te: “tómileisa mpe tongenge na nzela ya bosangani bomoko elongo na Kristu. Bongo tokozala na lolendo ‘te, tókozala lokola engumba eye etongami o likóló lya ngomba, oyo ezali kaka komonono polele mpamba te, kasi ezali mpe na esengo, ezali mpe koyamba bato. Mpo na kosukisa, Leon ya XIV alobaki ‘te : tótala mpe to bondela Maria, ezibeli ya likóló, mpo àsalisa biso tókóma mpe tótikala bayekoli ba Mwana wa ye”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
