Luka

Tobanda mobù nà elembo ya motema moye mozali kobeta mpo na Boboto (Kimya)

Na nsuka ya misa eye yémei akambaki, o mokolo mwa yambo ya mobù, Tata Mosantu abimaki na lininisa ya ndako ya baPápa mpo na losambo la Maria “Angélus”. Asengaki bakristu ba yé ‘te basepela te sé mpo na kobalusa lokasa ya manaka, kasi “babanda eleko ya kimya mpe ya bondeko kati na bato banso. Batikaka Nzambe abongola lisolo lya bato o nzela ya elikya, bolimbisi mpe ngolu.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Soki mposa wana ya kosala bolamu ezalaki te, litomba lisengelaki te kozala, mpo ya biso kobalusa lokasa ya manaka mpe kotondisa mikanda ya molongo ya makambo ba biso”. Na maloba ma ebandela ya Angélus, Tata Mosantu alakaki bandimi banso mobu mwa boboto (kimya mpe ya boninga). Na nsima, alobaki ‘te mobu mwa sika mozali bobele molongo mwa basanza biye bizali koyà te, kasi ezali mokumba na elimo. Mp ona yé, tango ekómaka na mbuma miyiké soki, ezali na boyokani ya solosolo mpo na kimya mpe bondeko kati na bato.

Milulu mya Misa, na eeyenga ya Santu Maria, Mama wa Nzambe, o mokolo mwa 1er ya sànzà ya Yanuali , ya mobù 2026.
Milulu mya Misa, na eeyenga ya Santu Maria, Mama wa Nzambe, o mokolo mwa 1er ya sànzà ya Yanuali , ya mobù 2026.   (@Vatican Media)

Zubile, Eteyelo ya kokoma elikya mpenza

Pápa azongeli libula elimo ya Zubile etikaki: koyekola “kobongola mabe na bolimbisi, mpasi na libondisi, mikano mya mabongi malamu na misala malamu”. Ezali ontei ya biso nde, Nzambe akokota o lisoló lya bato, mpo na kolongola bango te, kasi mpo na kobikisa bango na kobosana. Alobi ‘te, “Nde bongo, Nzambe yemei afandi kati ya lisoló lya bato”, mpe abakisi ‘te likabo lya Mobikisi, Yesu Kristu, ezali eyano ya Nzambe na bamposa makasi ya bato. Na kokoma ndeko wa biso, Mwana se moko oyo abotamaki, angengisaki mitema mya bato na bososoli mpe apesi makoki n abato, bàtonga elongo, bomoyi bokoyà, “lokola ndako epai wapi ekoyamba mobali mpe mwasi nyonso abotami”.

Maria, mobateli ya Mobombamo mwa Nzambe oyo akomi moko wa biso

Eyenga ya Noele ezali komema biso lelo, tokotala Maria oyo azalaki moto wa yambo ayokaki boni boni motema mwa Kristu mozali kobeta. O kati ya libumu lya ye ya kimya mpe ya bongondo, Liloba lya Bomoi eyokani lokola motema dukuduku ya ngolu.

Na nzela ya Maria, Nzambe amonisi motema mwa yemei: motema oyo “ebetaka mpo na mobali nyonso mpe mpo na mwasi nyonso”; elobi Pápa, kaka mpo na baoyo bayambi ye na boboto, lokola babateli ba mpate te, kasi mpe mpo na baoyo baboyi ye, lokola Erode.

Motema oyo ekondima mabe te

Motema mwa Kristu ezali tango inso koyamba bato banso, ezali mosika na bokeseni bonso. “Motema mwa yé ebetaka mpo na bayengebene mpamba te bálanda ezaleli na bango ya kobanga Nzambe. Ebetaka mpe mpo na bato mabe, mpo ‘te bábongwana mpe bázwa bomoi ya boboto”.

Libombami lya kobotama na nzoto ya moto, kobotama na “mwasi”, ezali mpe kosenga na biso tóyeba ‘te bomoi ya moto nyonso ezali mosantu. Mwana nyonso oyo abotami azali na “elilingi ya Nzambe oyo ekomami na nzoto na biso”, oyo ezali elembo ya likabo ya liboso lya Nzambe.

Kosambela mpo na boboto, kobana na bikolo kino nà mabota

O mokolo moye, Tata Mosantu alendisi na kosambela mpo na boboto; “liboso nayino o kati ba bikolo biye makila mizali kosopana mpo na matata mpe bozangi”. Mpe o kati ya bomoi pene na biso : “mabota matungisami na mobulu mpe na minyoko”.

Solo Kristu azali elikya ya biso, azali mwinda mwa bosembo oyo ekozimamaka te. Sengani bolobeli bwa Maria, Mama wa nzambe mpe Mama wa Eklezya 

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

02 sánzá ya yambo 2026, 08:33