Pápa na Rote ya Roma: Kosangisa Bosolo mpe bolingo mpo na kosalela bosembo
Ntango afungolaki, mokolo mwa yambo, mwa 26 ya sànzà ya Yanuali, mobu ya kosambisa ya Tribinale oyo etalelaka makambo ya koboma libala, Léon XIV asalaki lisukulu moko ya mozindo na ntina na mosala ya bisambiselo ya lingomba. Abetaki nsete na ntina na boyokani oyo ekoki kokabwana te kati na bosolo mpe bolingo, Tata Mosantu akebisaki na ntina na kobunga ya motema mawa oyo ezangi moboko mpe na ntina na kosambisa kozanga ngolu.
27 sánzá ya yambo 2026, 13:24
