2026.01.19 Pàpa Leon XIV ayambi  S.E.Petr Pavel, Mokambi ya Repibliki Tchèque 2026.01.19 Pàpa Leon XIV ayambi S.E.Petr Pavel, Mokambi ya Repibliki Tchèque   (@Vatican Media)

Pàpa Leon XIV ayambi Mokambi ya Repibliki ya Tchèque

Nsima ya likita mpo ya Banso elongo nà Pàpa, Petr Pavel asololaki na Mokomeli ya Etukà na ntina ya makambo ya baetando, mpe azongelaki ntina ya komipesa mingi mpo na kimya. Engebene liyebisi moko ya ndako ya bopanzi nsango ya Vatikan, na ntango ya masolo ya esengo, bayambaki motuya ya boyokani bolamu oyo ezali kati na bikólo mibale miye mpe bamonisaki mposa ya kokolisa yango lisusu.

Bansango ya Vatikan

 

Na ntongo mwa mokolo ya yambo, mwa 19 ya sànzà ya Yanuali, Pápa Léon XIV ayambaki Mokambi ya ekolo ya Répibliki Tchèque, Petr Pavel, oyo na nsima akutanaki na Episkopo wa lokumu mokomeli (Secrétaire) Pietro Parolin mpe Mgr Paul Richard Gallagher, Mokomeli mpo na boyokani na bikólo mpe bibongiseli ya mokili mobimba.

Pàpa Leon XIV  elongo nà Pavel, Mokambi ya Répibliki ya Tchèqye
Pàpa Leon XIV elongo nà Pavel, Mokambi ya Répibliki ya Tchèqye   (@Vatican Media)

Bomipesi ya lombango mpo na Boboto to Kimya

Liyebisi lyoko lya ndako ya bopanzi sango ya Vatikan, elobaki ‘te, aa ntango ya masolo manà maesengo, akumisaki boyokani malamu kati na mikili miye mibale, mpe mposa ya kolendisa yango lisusu emonisamaki polele. Na nsima, likebi epesamaki na makambo ma ntina mpo na bango banso.  Bongo na mitó ya makambo ya politiki mpe ya bato ya etuka mpe ya mokili mobimba, basololaki mpo na kotalela mingimingi matata oyo ezali kosalema. Na nsima, bamonisaki ntina ya komipesa na lombangu mpo na kimya mpe mpo na kozongisa mibeko mpe bizaleli oyo esimbi bomoi ya bato na mokili mobimba.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

20 sánzá ya yambo 2026, 12:46