Pápa ayambi Maria Corína Machado, molongi mbano ya Nobel ya mboka Venezuela
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na suka ya tongo etondaki na masolo na ndako ya bantoma, Pàpa Léon XIV ayambaki Maria Corína Machado, députée ya kala ya Assemblée nationale ya Venezuela, mokolo mwa 12 ya sànzà ya Yanuali, molongi mbano ya Nobel ya kimya na sànzà ya Okotobe ya mobu 2025. Masolo ma bango esalemaki mikolo zomi sima ya bokangi ya mokambi ya ekolo, Nicolas Maduro mpe mwasi na yé Cilia Flores, na basoda ya Amerika, o mokolo mwa misato (3) ya Yanuali na Caracas. Bafundaki ye ‘te azali kosala mombongo ya bangui mpe narcoterrorisme. Sik’awa Nicolas Maduro azali na boloko na Brooklyn na New York.
Maria Corína Machado azali moto ya politiki ya Venezuela mpe mobundi mpo na lotomo ya bato. Azali mokambi ya parti libéral “Vente Venezuela” oyo ezali tango inso motelemeli ya bokonzi ya Nicolas Maduro. Akimaki mboka mpe akendaki Olso na sanza ya Desembe mpo na nakozwa mbano eye ya motuya. Bazali kozela ye na mboka Washington mpo na bokutani elongo na mokambi ya mboka ya Amerika Donald Trump. Sik’awa Venezuela akambami na Delcy Rodriguez. Bazali kosala mosala na lisungi ya Communauté internationale
Mbela ya mokitani ya Petro mp ona ekolo ya Venezuela.
Eloko mosusu ezali ‘te na sima ya Angelus ya mokolo mwa 4 ya Yanuali, sima ya likàmà ya mokambi Nicolas Maduro , bato soko tuku mwambé (80) bakufaki, elongo na basodá mpe basivili ya Venezuela mpe ya Cuba. Na yango Pápa alobaki ‘te azalaki komitungisa na likambo ya Venezuela. Mpamba te, “Bolamu ya balingami ya Venezuela esengeli koleka makambo mosusu mpe esengeli kotinda bango balonga mobulu mpe babanda nzela ya bosembo mpe ya kimya”.
Azongelaki mbela ya ye, na lisukulu asalaki na mokolo mwa 9 ya Yanuali, liboso ya bakonzi ya Vatikan. Alingi ‘te Ba-Venezuela “bàtonga lisanga oyo esimbami na bosembo, bosolo, bonsomi mpe bondeko. Nde bongo bakolongwa na mpasi monene oyo ezali konyokola mboka na mibu miyiké.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
