Luka

Bafulele mpe mikanda ya mawa liboso lya bar «Le Constellation» na  Crans-Montana, esika wapi moto epelaki na butu ya Saint-Sylvestre.  Bafulele mpe mikanda ya mawa liboso lya bar «Le Constellation» na Crans-Montana, esika wapi moto epelaki na butu ya Saint-Sylvestre.  

Pàpa asambeli mpo na baye bazwi likàmà ya moto na Crans-Montana

Kati na telegrame oyo ekomami na mokomeli ya Etukà ya Vatikan, Episkopo walokumu Pietro Parolin, mpe etindamaki na Mgr Jean-Marie Lovey, episkopo ya Sion, na Suisse, Papa asangani na «matanga elongo na mabota mpe na Confédération helvétique mobimba» mpo na likama ya moto epelaki na Crans-Montana na butu ya mokolo ya yambo ya sanza ya yanuali, oyo ebomaki bato koleka tuku minei mpe bato bayiké bazokaki.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

«Sima ya koyoka nsango ya likama ya moto ebetaki na Crans-Montana na butu ya mokolo mwa yambo ya sanza ya yanuali. Moto ebomaki bato koleka ntuku minei mpe bato bayiké bazokaki. Mosantu Papa Léon XIV asanganaki na mawa ya mabota mpe ya Confédération helvétique mobimba». Na telegrame oyo epesamaki na mokolo mwa mitano, mwa 2 ya sanza ya yanuali, mpe epesamaki na Cardinal mokomeli ya Etukà ya Saint Siège. Léon XIV asangani na mawa ya Confédération helvétique mobimba mpe “amonisi na bandeko ya ba baye bazwaki likàmà, motema mawa na ye mpe lolenge azali komitungisa”. Pàpa asambeli  Mokonzi “ayamba bawei o ndako ya ye ya kimya mpe ya mwinda, mpe kosunga mpiko ya baye bazali konyokwama na mitema to na nzoto”. Alobi lisusu’te azali kobondela Mama wa Nzambe ‘te, “na motema mawa na ye”, apesa “libondisi ya boyambi na baoyo nyonso bazwi likama wana, mpe abatela bango na elikya”.

Moko ya makambo ya somo nayino esalemá te na Suisse

Moto oyo ebomaki bato mingi na Crans-Montana, esika basalaka lisano ya ski, ebomaki bato pene na tuku minei (40) mpe bato pene na nkama moko (100) bazokaki, engebene na bapolisi ya mboka yango. “Motango ya bato oyo bakufi ekoki mpe kobakisama”, engebene bakonzi ya Suisse, oyo balobi ‘te: “bato kati na tuku mwambe (80) mpe mokama (100) bazali na likama monene”.  Balukiluki bozali kosalema mpo na koyeba esika moto yango eutaki, kasi bakonzi ya canton balobaki mokolo ya minei ‘te: “Emonani ‘te moto epanzanaki”. Moto ya Crans-Montana ezali “moko na makambo ma somo koleka” oyo esalemá nayino te na Suisse, ndenge Guy Parmelin, mokambi ya ekólo Suisse, alobaki na likita moko ya bapanzi-nsango na mokolo mwa minei, mwa yambo ya sanza ya yanuali. Alobaki ‘te ezali “likama moko ya nsomo oyo esalemá nayino te”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

02 sánzá ya yambo 2026, 17:03