Luka

2026.01.28 Mgr Relwendé Kisito Ouédraogo, Ntomà ya Papa ya sika na Répibliki  ya Congo 2026.01.28 Mgr Relwendé Kisito Ouédraogo, Ntomà ya Papa ya sika na Répibliki ya Congo  

Pàpa aponi Ntomà ya yé ya sika na Répibliki ya Congo

O mokolo moye ya misato mwa 28 ya Yanuali, Tata Mosantu aponaki Mgr Relwendé Kisito Ouédraogo, lokola Ntoma wa yé na Répibliki ya Congo. Azali mo-Burkina Fasso, mpe azali na bambula tukù mitano na minei (54 ans). Azalaki kino lelomei, mokambi to na lopoto: présent officiel de la Section pour les Affaires générales de la Secrétairerie d’État. Na nzela ya liponami liye, Mgr Ouédraogo azali kotombolama na kiti ya Mokambi-Mokonzi (Titulaire) ya Ilta, nà lokùmu la Episkopo monene (Archevêque).

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mgr Relwendé Kisito Ouédraogo abotamaki o mokolo mwa 9 ya Aprili ya mobù 1972 na Gourcy, na Burkina Faso. Ntomà ya Pàpa ya sika ya Répibliki ya Congo akulaki  bonganga-nzambe o mokolo mwa 3 ya Desembe 2000 na nkombo ya Dioseze ya Ouahigouya. Na 2012, Relwendé Kisito Ouédraogo akomaki docteur ya yambo na mateya ya Sainte Liturgie ya mboka na yé, na eteyelo ya likolo, Saint Anselme, na Roma. Akomaki na likambo litali : «L'image liturgique: Essai d'une esthétique rituelle chez Romano Guardini». Na 2010, episkopo Ouédraogo abengamaki mpo na mosala ya makambo ya la Section pour les Affaires Générales de la Secrétairerie d'État na Vatikan.

Kobanda 2013 tee na koponama na ye lokola Ntomà ya Pàpa, asalaki lokola secrétaire privé ya Kardinal Pietro Parolin, Secrétaire d’Etat ya Saint-Siège. Lolenge yoko, azali mpe moko ya Komité ya gestion ya Fonds « Pro Afrique» ; ya Conseil d’administration ya Fondation «Mondo Unito» mpe Association ya ba liturgistes africains (Consociatio Liturgica Africana).

Depuis 2013 jusqu’à sa nomination comme nonce apostolique, il a assuré les fonctions de secrétaire particulier du cardinal Pietro Parolin, secrétaire d’État du Saint-Siège. Il est également membre du Comité de Gestion du Fonds «Pro Africa»; du Conseil d'Administration de la Fondation «Mondo Unito» et de l'Association des Liturgistes Africains (Consociatio Liturgica Africana).

Mgr Ouédraogo alobaka malamu bankotà ya lifalansa, italien, lingelesi mpe allemand.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

28 sánzá ya yambo 2026, 17:55