Bato bayiké ya Repibliki Demokratiki ya Congo oyo bakimaki bamboka ya pembeni Bato bayiké ya Repibliki Demokratiki ya Congo oyo bakimaki bamboka ya pembeni  (AFP or licensors)

Pàpa abondeli mpo na Repibliki Demokratiki ya Congo, mpe Afrika ya Ngele oyo ezwami na mpela

Nsima ya losambo la Angelus, Pape Léon XIV abendaki likebi ya bato na ezalela ya mpasi oyo ezali koleka na Moniele (Esti) ya Répibliki démokratiki ya Congo, epai kuna mobulu epusaki bato mingi na kokima bamboka ya pembeni, mingi mpenza na Burundi. Tata Mosantu amonisaki mpe bomoko na ye na bato oyo bazwami na likama ya mbula makasi na Afrika ya Ngele (sudi).

Albys KBD, CP - Kinshasa/RDC

 

Nsima ya kosala losambo la Angelus na mokolo mwa 18 ya yanuali, Pápa Léon XIV alobelaki minyoko ya bato na Esti ya Répiblika démokratiki ya Congo. Mp ona ye, mokakatano monene ya bato ezali kokoba. Mobulu oyo ezali kosila te ezali kotinda mabota mingi na kokima bandako ba bango

Pápa alimbolaki ‘te bato bazali kokutana na «minyoko makasi», mpe amonisaki ‘te bato bayiké bakimi na makasi mpo na koluka libateli na ngambo mosusu ya mboka, mingimingi na Burundi, mboka oyo ezali pembeni nà bango, mpo mobulu mpe bitumba ezali kokoba na etuka yango. Na ntina na kokoso ya bato, Pápa abyangaki bato na mabondeli mpo ‘te “masolo mpo na boyokani mpe kimya elonga tango inso kati na bato oyo bazali na matata”.

Na Répiblika démokratiki ya Congo, minyoko mizali se kokoba mpo na mobulu, kasi mpe mpo na koningana ya mompepe makasi. Na mokolo mwa yambo, bato soki zomi na mwambé (18) bakufaki na mbula makasi oyo ebetaki na engumba moko na Esti ya ekólo yango mpe mabele eninganaki, mpe yango ebakisaki lisusu mpasi na likambo ya kosunga bato.

Baoyo bakimá bitumba bazali sik’awa kobika kati na ezalela ya bobólá. Na bakambo mingi ya bato bakimá mboka, bilei, mayi ya peto mpe lisalisi ya monganga ezali kaka moke. Nzoka nde likama ya bokono ezali se kobakisama. Bamaladi lokola kolera ebandaki kopalangana epai ya bato oyo balembaki mpo na nzala, kolemba mpe kozanga bisika ya kofanda.

Bazali pene ya bato oyo bazwi likàmà ya mompepe makasi na Ngele ya Afrika

Na nsima, Pápa atyaki makanisi na ye na súdi ya Afrika, epai kuna mbula ya makasi mpe mpela ebomaki bato koleka monkámá na mikolo mileki. Mayi ezindisaki bamboka nyonso, ebebisaki bandako mpe ebebisaki biloko mosusu ya ntina mingi. Afrika ya Sudi, Mozambiko, mpe Zimbabwe ezali kati na mikili oyo ebebisami mingi koleka.

Tata Mosantu amonisaki ‘te azali pene na bato ya bisika wana, alakaki bango bomoko ya Eklezia mpe abondelaki mpo na bato banso baye bazwaki mpasi: baye bakufi, baoyo bakimá mboka na bango mpe baoyo bazali kosunga bango.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

18 sánzá ya yambo 2026, 17:11