Na Tanzanie, Pápa akeli dioseze ya Bariadi mpe atye episko ya liboso.
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Engebene na liyebisi ebimisamaki na tongo ya mokolo mwa minei, dioseze ya sika ya Bariadi ekelami na lisalisi ya Pàpa Leon XIV. Atye mpe lokola mokambi mwa yango ya yambo, Episkopo Mgr Prosper Baltazar Lyimo. Kino sik’awa, azalaki nayino episkopo mosalisi ya Arusha.
Lisolo lya bomoi bwa Mgr Lyimo
Mgr Prosper Baltazar Lyimo abotamaki o mokolo mwa 20 ya Agusti ya mobù 1964, na mboka Kyou, ezwami na etukà ya Kilimndjaro, na kati ya diosezez ya Moshi. Ba kelasi ya yambo(écoles primaires), asalaki yango na Maua mpe Ngurdoto. Baoyo ya mibale (secondaires) , asalaki yango na likindo ya moke ya Saint Thomas d’Aquin d’Arusha. Bongo atangaki kelasi ya filisofi na Notre-Dame-des-Anges na Kibosho, mpe kelasi ya Teyoloji na likindo lya Saint Paul Kipalapala.
Akulaki bonganga mpo na Archidioseze monene ya Arusha, o mokolo mwa minei (4) ya sànzà ya Yuli ya mobù 1997. Akambaki na misala miye : Moyekwisi (Formateur) na likindo ya moke ya Saint Thomas d’Aquin na Oldonyosambu ut’o 1997 kino 1999. Sima akomaki Chancelié ya Archidiosezez ut’o mobù 2000 kino 2004, mpe (2007-2008). Akendaki kokoba kelasi ya likolo na droit kanoniki na Roma na Université Pontificale Urbaniana na 2007. Asalaki doctorat na ye, kaka na droit kanoniki na Université St paul ya Ottawa,na mboka Canada (2011)
Asalaki mpe mosala ya chancelier mpe vicair judiciaire ya archidioszez ya Arusha na (2011-2014). O mokolo mwa 11 sanza ya zomi na moko ya mobu 2014, Mgr Prosper Baltazar Lyimo aponamaki mosungi ya Arusha, azwaki episkopot na mokolo mwa 15 ya sanza ya mibale oyo elandaki.
Dioseze ya Bariadi
Diocèse ya sika ya Bariadi ekabwani na diocèse ya Shinyanga, mpe ezali kozwa lisalisi lya archidioseze ya engumba-mokonzi ya Mwanza. Ngwende ya Dioseze yango ezali na engumba Bariadi. Ndako-nzambe monene ya etúká ya sika ya lingomba ekozala mpo na mwa ntango moke ndako-nzambe ya paroisse ya Saint Jean-l’Évangéliste na Bariadi, nzokande na mikolo mizali koya, ndako-nzambe ya Saint Luc, oyo ezali kotongama sikawa, ekokóma yango.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
