Mgr Kimengich aponami lokola archeveque-molandi ya Mombasa na Kenya
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Mgr Dominic Kimengich abotamaki o mokolo mwa 23 ya Aprili ya mobù 1961 na Kituro. Akulaki bonganga-Nzambe o mokolo mwa 14 ya Setémbe ya mobù 1986. Atangaki Filozofi na likindo ya St. Augustin’s Senieo Seminary ; bongo Teoloji na St Thomas Aquinas Senior Seminary, na Nairibi. Azalin a nkombo ya lokùmu ya matangi na Licence mpe na doctorat na Droit kanoniki na eteyelo ya likolo ya Université pontificale ya Sainte-Croix na Roma.
Mgr Kimengich asalaki mosala ya Sango- Molandi na Parwase ya Ndana kobanda mobù 1986 kino 1988 yambo ‘te akoma Sango-Mokonzi na Kipsaraman kobanda mobù1988 kino 1993. Azalaki mpe Recteur ya likindo lya Semineur mineur St. Joseph na Molo, kobanda 1997 kino 2001. Lisusu, asalaki mosala ya Molandi Monene (Vicaire Generale) ya dioseze ya Nakuru, kobanda mobù 2001 kino 2007. Na nsima akomaki recteur ya likindo monene (semineur majeur) St. Matthias Mulumba na Tindinyo kobanda 2007 kino 2008.
O mokolo mwa 20 ya sànzà ya Marsi ya mobù 2010, archeveque-molandi ya sika, aponamaki lokola Mokambi-Mokonzi ya Tanaramusa, mpe episkopo-mosalisi ya Lodwar. O mokolo mwa 5 ya sànzà ya Marsi ya mobù 2011, akomaki episkopo ya Edwar. Bongo o mokolo mwa 16 ya sànzà ya Novembe ya mobù 2019, episkopo ya Eldoret.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
