2025.12.25 Elilingi ya elembo 2025.12.25 Elilingi ya elembo  (@Vatican Media)

Manaka mya milulu mya Pàpa na sànza ya Yanuali mpe Febuali

Biro ya milulu mya losambo ebimisi manaka ya milulu mpe ya bokutani oyo ekosalema na ntango ya misa, oyo ekambami na Pápa, tee na ebandeli ya eleko ya Karezimo. Milulu mya ezuzulu ya tango eye ya losambo mpe ya kokila bilei ekosalema na Vatikan.

Bansango ya Vatikan

 

Mokolo mwa liboso oyo ekomami na Manaka oyo biro ya Pápa ebimisaki mokolo mwa mitano, mwa 9 Yanuali, ezali mokolo mwa 25 Yanuali. Na molulu ya Mbongwana ya Santu Polo, ntoma, Pàpa akokamba kobanda na ngonga ya 17h30 na misa ya pokwa ya mibale na Basilika Saint-Paul-hors-les-Murs, mpo na poso ya tuku mitano na libwa (59) ya losambo mpo na bomoko ya Bakristu.

Na mokolo mwa 2 Febwali, na ndako-nzambe monene ya Saint-Pierre, na ngonga ya 5h ya pokwa, Pápa akosala misa mpo na mokolo mwa ntuku misato ya mokili mobimba mpo na bamibonzà, o mokolo Maria abonzaki Mokonzi Yezu o Tempelo.

Eleko ya Karezimo mpe ba Ezuzulu

Na mokolo ya misato ya mputulu, mokolo ya 18 Febwali ya mbula oyo, Pápa akokende na ngomba ya Aventine na Loma. Karezimi ekobanda na Statio mpe molulu mwa bolimbisi masumu na ndako-nzambe Saint-Anselme na 16h30. Léon XIV akokamba misa mpe akobenisa, bongo akopesa mputulu na ndako-nzambe monene ya Sainte-Sabine, na ngonga ya 5h ya pokwa.

Kobanda mokolo mwa tuku mibale na mibale (22) tee 27 ya sànzà ya Febwali, Pápa akokota na milulu ya ezuzulu elongo na bakonzi ya Eklezya ya Katoliko na Palais apostolique.

Tózali kokundola ‘te na mokolo mwa lomingo, mwa 11 Yanuali, Pápa akobatisa bana mingi ya basáli ya Vatikan kati na ndako monene ya losambo oyo ba babéngi Chapelle Sixtine.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

09 sánzá ya yambo 2026, 23:27