Lolenge makambo makoleka na likita monene mwa mokolo mwa 7 mpe 8 ya sànzà ya Yanuali
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Mokanda Evangelii Gaudium mpe etindà ya Eklezia, constitution apostolique Praedicate Evangelium, mokumba mwa Curie mpe boyokani na yango na mangomba ndenge na ndenge, sinodalite mpe liturgie ; ezali bongo Wana ezali mitó ya makambo oyo bakolobela na likita monene oyo Pápa Léon XIV abyangaki. Ezali likita lya liboso ya bokonzi bwa ye. Ekosalema o mokolo mwa misato, mwa (7) mpe mwa minei mwa libwà (8) Yanuali. Pápa akolekisa mikolo mibale ya losambo, ya bokabola mpe ya bomanioli, na elembo ya bondeko mpe ya lisanga, elongo na basangani ba Collège ya batata episkopo wa lokumu. Mingi kati na bango basanganaki na molulu mwa bokangemi bwa Ezibelo ya Santu (Porte Sainte) mpe na misa ya mokolo mwa bomimoniseli (Epiphanie) o mokolo mwa mibale na tongo. Mokano mwa lisanga eye ekozala ya “kokolisa bososoli ya bato banso mpe, ya kopesa lisungi mpe toli na Tata Mosantu mpo na kokokisa mokumba mwa ye monene ya kokamba Lingomba ya mokili mobimba”.
Mingi mpenza, liyangani lyango ekobanda na mpokwa ya mokolo mwa misato na ngonga ya minei na ndako ya likita monene na Vatikan. Mosala yango esengelaki kosalema na bonkuku, o miso ma mokonzi ntoma monene. Na mokolo mokolanda, mokolo mwa minei, mwa 8 ya sànzà ya Yanuali, akozala elongo na misa na bakardinale na lotale ya ngbéndé to kiti ya bokonzi na ndako-nzambe monene ya Saint-Pierre. Liyangani lya misala ekobanda sima na ngonga ya 9h30 mpe ekokoba kino na ngonga ya 12h45, sé na ndako ya synodi. Nakosukisa, Tata Mosantu elongo na batata episkopo wa lokumu, bakosangana lisusu na sima ya nzanga, kobanda ngonga ya 15h15 kino 19h00 mpo na kosukisa mikolo mibale ya misala.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
