Likita lya bansó: Vatican II ekobenga biso ya kozala banzeneneke ya bosémbo pe ya boboto
Vatican News
Na mobú eye ya sika, Papá Léon XIV abándaki molongó ya sika ya matéya matali concile Vatican II pe ya botángi lisusu mikánda na yangó. "Eleko lyoko ya malonga ya kozibola lisusu kitoko pe ntina ya likambo ena ya eklezia", Papá alimbolaki na bandimi 7000 basanganaki na ndako ya makita Polo VI ya Vatican.
Simá ya bokangi Ekuke Esántu ya súka na Roma, Papá wa Roma alukaki maloba ya sántu Yoane Polo II, bilobamaka na súka ya Zúbile ya mobú 2000: "nakoyoka lotómo ya kolakisa concile lokóla ngrásya enéne eye Eklezia ezui na ekeke ya ntúkú mibalé" (Novo Millennio Ineunte, 57).
Vatican II, monzóto moko eye ekokamba Eklezia
Mobú eleki ezuaki elembo ya bokundoli mibú 1 700 ya concile ya Nicée kasi lokóla bokundoli ya mibú ntúkú motóbá ya concile Vatican II. "Atáko eleko ekaboli bisó na molulu ena ezali mokuse, ezali ya sóló lokóla 'te baepiskopo ya tángo waná, bayékoli matéya ma Nzámbe na bozindo pe bandimi ya Vatican II bazali na bisó te", elobaki Sántu-Papá. "Na boyoki tobengami ya koboma lisakoli na yangó te pe ya kokoba koluka ba nzelá ya kosálela matéya na yangó, ekozala na ntina ya kozibola yangó lisusu, na koyoka te to na nzelá ya bolimboli biye bipesama, kasi na botángi lisusu mikánda na yangó pe bomanyoli etyélo ( contenu) na yangó. Ya sóló, ezali Magistère eye etikali leló monzóto eye ekokamba nzelá ya Eklezia", esémbolaki ye.
Episkopo ya Roma akobaki litéya na ye na bolobi lisusu matéya ya moko ya baye baleka libosó na ye, bipanzanaki na Papá Benoît XVI na moko ya bozui na ye ya maloba simá ya bokomi na ngwendé ya Petelo: "Na boleki ya mibú, Mikánda ya concile bibungisa nsango na yangó te; matéya na yangó bikomonono kútu mpenza makási na botáli lisengeli (exigence) ya sika ya Eklezia pe ya lingómbá ya bato ya mokili sik’oyo" (Nsakola ya yambo simá ya misa na baepiskopo ya lokúmu baponi, 20 ya sánzá ya minei 2005).
Bato bansó ya Nzámbe babéngami ya kozala na bomoi ya Eklezia
Bofúngoli ya concile na 11 ya sánzá ya zómi 1962 na Papá sántu Yoane XXIII esalisaka ya kosangisa ba tatá baútaka na ba Eklezia ya mikili (continents) binsó, na botiyi elembo na "eleko lyoko ya sika ya eklezia". "Simá ya likanisi lyoko ya motúya ya biblia, ya boyekoli matéya ma Nzámbe na bozindo pe ya milulu pe nsámbo ya bakristu o misa eye ekobaki na ekeke ya ntúkú mibalé, elimbolaki Léon XIV, concile Vatican II ezibolaki lisusu elongi ya Nzámbe lokóla Tatá oyo, na Kristu, akobenga bisó ya kozala bána na ye". Eklezia ekanisami bôngó "na mwinda ya Kristu, mwinda ya bikóló, lokóla mobombano moko ya komunyo pe sakramento moko ya bomoko káti na Nzámbe pe bato na ye".
Concile Vatican II elakisa "mbongwana ya ntina ya milulu pe nsámbo ya bakristu o misa na botiyi o ntéi mobombano ya libiki pe ya bozali ya sóló pe ya koyéba ya bato bansó ya Nzámbe". Kaka na eleko ena, ekobaki Sántu-Papá, "esalisaki bisó ya kofúngwama na mokili pe ya kosimba ba mbongwana pe ba ntembe ya eleko ya sika na lisoló pe na mokumba ya lisangá, lokóla Eklezia eye elingi kofúngola mabóko na ye na bomoto, kopesa mongongo makási na ba elikya pe na bobángi ya bato pe bosáli elongo na botóngi ya lingómbá ya bato ya sémbo koleka pe ya bondeko koleka".
Eklezia yoko na lisoló
Efungwamaka na Yoane XXIII, concile ekosila na 8 ya sánzá ya zómi na mibalé 1965 o eleko ya Polo VI. Na encyclique Ecclesiam Suam ebimaka mobú ena na Giovanni Battista Montini, Papá ya Italie alobaki 'te likoló ya Vatican II, "Eklezia emikomisi liloba; Eklezia emikomisi nsango; Eklezia emikomisi lisoló". Emipesaki bôngó, elimbolaki Léon XIV, ya "koluka bosóló na nzelá ya œcuménisme, ya lisoló na biyamba pe lisoló na bato ya motéma malámu".
Sántu-Papá alobaki lisusu na bandimi maloba ya sántu Polo VI na ba tatá ya concile na súka ya misála na 1965, biye bitikali mibú ntúkú motoba simá mitindo po ya Eklezia. Polo VI, esémbolaki Léon XIV, "alobaka 'te eleko ekomi ya kokende, ya kotika lisangá ya concile po ya kokende na bokútáni na bomoto pe komemela ye Nsango Elamu, na koyéba balekisaki eleko yoko ya ngrásya epái wápi kála, leló pe lobi bikangemaki". "Lobi ekomi, na súka, mbélá makási ya bato po sémbo koleka, na bolingi na bangó ya boboto, na pósá na bangó, ya koyéba to koyéba te, ya bomoi moko ya likoló koleka: eye na sémbo Eklezia ya Kristu ekoki pe elingi kopesa bangó", ekomaka Polo VI na liloba ya ye na ba tatá ya concile, na súka ya misála. Mbela moko eye Papá abengi lisangá ya Bato ya Nzámbe ya kokomisa yangó ya bangó
Kozibola bozui bontóma ya concile
"Molimo ena, libongisami ya káti, esengeli komonisa ezalela ya bomoi na bisó ya molimo pe ekela ya bobateli ya Eklezia, elobaki Sántu-Papá, po tosengeli kotia na mosála mbongwana ya eklezia pe, libosó ya ba ntembe ya leló, tobengami ya kotikala balimboli ya bokébi bilembo ya bileko, balobeli ya esengo ya Nsango-Ndamu, banzeneneke ya mpiko ya bosémbo pe ya boboto".
Mokitani ya Petelo abengaki bandimi ya kozibola lisusu concile, eye, lokóla Papá François asakolaka na litéya na ye o eleko ya mibú 60 ya ebándeli ya concile Vatican II, ekosálisa ya "kopesa boyambo na Nzámbe, na ya ntina: na Eklezia yoko ya liboma ya bolingo po ya Mokonzi na ye pe po ya bato bansó, balingami na Ye".
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.
