Likita lya bansó: Nzámbe akoloba na bato lokóla na baningá
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Na bokotisi mokolo eye ya misáto litéya na ye etáli Dei Verbum, mokitani ya Petelo alobi lisusu maloba ya Yézu na Nsango-Ndamu ya Sántu Yoane: "Nakotanga binó basáleli te, zambi mosáleli ayébi te nini mokonzi azali kosála; kasi nakotanga binó baningá, zambi nalakisi binó manso nayoki epái ya Tatá" (Yn 15, 15).
Bolingo ezali ezaleli se moko ya bondeko bwa sika
"Yézu-Kristu abongoli na bozindo boyokani ya moto na Nzámbe, eye ekokoma boyokani ya bolingi". "Tokokani na Nzámbe te, kasi Nzámbe ye-mei akomisi bisó loléngé lyoko na Ye na Mwána na ye". Sántu Augustin abeti nsete na likambo ya ngrásya, eye ezali na likoki ya kokomisa bisó baningá ya Nzámbe na Mwána na ye, elobi Léon XIV.
Likanisi eúti na Nzámbe, "bondeko ya Nzámbe pe moto ezali kaka na semba te: Nzámbe azali Nzámbe pe tozali bikelamu; na boyei ya Mwána na nsuni ya moto, Bondeko efungwami na súka na yangó: na Yézu, Nzámbe akomisi bisó bána na ye pe akobenga bisó ya kokokana na Ye na bolembu ya bomoto na bisó".
Nzámbe akoloba na bisó po ya kobenga bisó na lisangá
"Nabengi binó baningá ba ngai". Na bozongeli maloba ya Yézu, Mobéko-likonzi Dei Verbum elobi 'te Bosakoli ekomi na mobimba na yangó na Ye, Liloba ekomi moto eye ekobenga bisó ya kokabola bomoi ya bonzámbe. "Na bosakoli ena, Nzámbe amonanaka te (cf. Col 1, 15; 1Tm 1,17), na bolingo na ye bonene, akoloba na bato lokóla na baningá (cf. Ex 33, 11; Jn 15, 14-15) pe akosolola na bangó (cf. Bar 3, 38), po ya kobenga bangó pe kondima bangó na lisangá na ye" (n° 2). Nzámbe ya Ebandeli azalaka kosolola na babóti ya yambo, na bolobi na bangó (cf. Dei Verbum, 3); pe tángo lisoló ena ekatani na lisumu, Mokeli alembaki te koluka bokutani na bikelamu na ye pe kosála mbala nionso bondeko na bangó. Na Bosakoli ya bokristu, tángo Nzámbe, po ya kokutana na bisó, amibimisi na Mwána na ye, lisoló eye ekatanaka ezongaki libélá: Bondeko ezali ya sika pe ya seko, eloko moko te ekoki kokabola bisó na bolingo na ye".
"Ezali na ntina, ebetaki nsete Léon XIV, ya kosimba bokeseni káti ya liloba pe bilobaloba: eye ya súka ekosuka na likoló pe ekosála lisangá káti na bato te, nzokándé boyokani ya sóló, liloba ekosálisa kaka ya kokabola ba nsango te, kasi ya kolakisa banani tozali. Liloba ezali na lomeko ya bosakoli eye ekokela bondeko na mosusu. Bôngó, na bosololi, Nzámbe akomibimisa na bisó lokóla Moningá eye akobenga biso na bolingi na Ye. Na ndéngé waná, likambo ya libosó ya kolona ezali boyoki".
Losámbo ezali na ntina po ya kobika pe kolona bolingi na Mokonzi
Na litéya eye, Léon XIV akoyebisa biso lisusu 'te bolingi na Nzámbe ezali likabo pe lokóla mbela eye ekosenga eyano, lokola na boyokani binso. "Bosakoli ya Nzámbe azali na motindo ya kosolola ya bolingi pe, lokóla na nzebi ya bolingi ya moto, ekokaka bobubu te, kasi ekoliama na bokaboli ya maloba ma sóló".
Po ya kolona bolingi ena, tosengeli kolekisa ngonga na Nzámbe na losámbo, yambo "na losámbo ya milulu pe nsámbo ya bakristu na misa pe ya lisangá, esika wápi bisó tokozua mokáno te ya eye tolingi koyoka na Liloba ya Nzámbe, kasi Ye-mei akoloba na bisó na nzelá ya Eklezia"; bolingi ena ekolonama "lokóla na losámbo ya moto ye moko, eye ekosálema na moto ye moko na motéma pe na molimo".
Waná Léon XIV abengi ya kotia losámbo na linaka na bisó: "Ngonga ebongisami ya losámbo, na bomanyoli pe na likanisi ekoki kozanga te na mokolo pe na póso ya mokristu. Ezali tángo tokosolola na Nzámbe ndé tokoki koloba ya Ye". Na súka, elobi Papá, "nzebi na bisó ekolakisa 'te bolingi ekoki kosuka likoló ya likambo lyoko ya kokámwa ya bokabwani, to molongó moko ya ba bopoto (négligences) ya mokolo na mokolo biye bikobebisa boyokani kinó kobungisa yangó. Soki Yézu akobenga bisó ya kozala baningá, tosála 'te mbela ena ezanga eyano te. Toyamba yangó, tobatela boyokani yangó pe tokomona 'te ezali mpenza bolingi na Nzámbe ndé ezali libiki na bisó".
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.
