Luka

Papa Léon XIV na likita  lya banso ya mokolo ya misato 28 ya sanza ya yambo 2026 Papa Léon XIV na likita lya banso ya mokolo ya misato 28 ya sanza ya yambo 2026  (@Vatican Media)

Likita lya bansó: "Likomi mpe Momesano bikangemi makási"

Na bokobi molongó na ye ya litéya etáli Mobéko-likonzi ya boyambi Dei Verbum ya Concile Vatican II, na Emoniseli ya bonzámbe, Papá Léon XIV abimisaki likanisi lyoko mokolo ya misáto 28 ya sánzá ya yambo, káti ya "Likomi mpe Momesano biye bizali esika yoko esántu ya bobombisi". "Liloba ya Nzámbe esengeli ekota na mabelé te", po ezali likambo lyoko ya bomoi eye ekotombwama mpe ekokola o ntéi ya Momesano ya Eklezia.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Libosó ya bandimi mpe bato ya mobémbo mwa boyambi ebelé, na ndáko ya makita Polo VI ya Vatican, Sántu-Papá abándaki litéya na ye na bobimisi bilili bibále ya nsango-ndamu: esika ya Nsango-Ndamu ya Yoane epái wápi Yézu mokolo moko yambo ya Malozi na ye alaki botindi ya Elimo Sántu po ya kokamba bapostolu zambi bakundolaka, basálela mpe basakola nionso eye atéyaki bangó, mpe botindi ya bayékoli na etindá na Yézu asékwi na Nsango-Ndamu ya Mateo. "Na bilili biye bibalé, nsinga ezali makási káti ya liloba elobamaki na Kristu mpe bopanzi yangó na bikeke ezali ya sóló".

Nkoma Esántu ekomami o ntéi ya Eklezia

Nkoma Esántu, liloba eúti na Nzámbe, mpe Momesano esántu, bongó ya bomoi ya Eklezia, bikangema makási mpe bikosála esika yoko ya bobombisi boyambi. Bobombisi ena epesami na Eklezia eye, na boyambi Elimo Sántu, ekolaka etindá ya kopanza yangó mpe na bobateli yangó na mobimba na ye na lisapo. "Momesano ya Eklezia ezui misisa na lisapo na nzelá ya Eklezia eye ekobomba, ekolimbola mpe ekopesa nzóto na Liloba ya Nzámbe". Papá Léon XIV atangaki liloba lotómo ya Tatá ya Eklezia: "Nkoma Esántu ekomama na motéma ya Eklezia yambo ekomama na bisálelo ya makási".

"Momesano esántu mpe Nkoma Esántu bikangema mpe bikoyébisana makási káti na bangó. Po nionso mibalé, na bobimi na liziba lyoko ya bonzámbe, bazali kaka moko mpe bakoluka kaka likambo lyoko".

Bobombisi ena epesami na Eklezia eye ekolimbola yangó na kombo ya Yézu

Bobombisi ena, eye ebombi mobimba ya boyambi na bisó -lisangá ya makanisi, misa, maye mazali malámu, bongo na bongo- ezali ya kotelema te kasi ya koningana, po ematisami mpe eyebani na mozindo na Eklezia na bikeke, na bokambemi ya Elimo Sántu. Na botángi Dei Verbum, "Momesano eúta na bapostolu ekokola na Eklezia na lisálisi ya Elimo Sántu", Mokitani ya Petelo alimbolaki 'te yangó ekosálema na lisálisi ya boyébi enéne na "likanisi mpe boyékoli ya bandimi", na nzelá ya nzebi eye ebotami na "mayéle ya mozindo ya makambo ya molimo" mpe, mingi mingi, likoló ya lisakoli ya bayékoli baye bazuaka "ngenge (charisme) yoko ya bosóló". Léon XIV atangaki na sima sántu Augustin: "ezali kaka na lisikulu lyoko ya Nzámbe eye ekotombwama na Likomi mobimba mpe ezali kaka Liloba lyoko eye ekoyokana na monoko ya basántu ebelé".

Na mokuse, Eklezia, na lisangá ya makanisi na ye, na bomoi na ye mpe na misa na ye, akosimba mpe kolekisa na baye bakoya sima nionso eye andima".

Monzóto po ya etamboli na bisó na bonéne ya lisapo

Likambo "bobombisi" ezali, na ndimbola na yangó ya ebándeli, na maye matali bosémbo mpe ekosenga na makási na moto akobombisa lotómo ya kobátela eye ezali ya káti, eye po na waná ezali boyambi, mpe kolekisa yangó mobimba. Epesama na Eklezia, eye ekobomba mpe ekolimbola yangó na kombo ya Yézu, bobombisi ena ezali "monzóto moko" ekosálisa ya konana na makambo ya bomoi po ya kokoma na ndáko ya bisó ya súka na lólá.

Na bosúkisi, Papá Léon XIV abiangaki na boyoki ya sika ya Likambo-likonzi ya Dei Verbum, eye ekoloba "bokangemi káti ya Likomi Esántu mpe ya Momesano: bakangemi, elobaki ye, makási mpe basangani káti na bangó na ndéngé 'te bakoki kozala moko na lipanda ya mosusu te, mpe elongo, loléngé na bangó moko, na ekela ya Elimo Sántu se moko, bakosála makási na libiki ya milimo".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

28 sánzá ya yambo 2026, 15:55