Luka

Pàpa Leon ya zomi na minei (Pape Leon XIV) Pàpa Leon ya zomi na minei (Pape Leon XIV)   (@Vatican Media)

Léon XIV: «Koyoka ‘te ozali moto ya Eklezya, ezali na ntina mingi koleka makambo manso »

Na nimero ya Yanuali ya zulunalo «Piazza San Pietro», Pápa ayanolaki na mokanda ya katekisti moko ya mboka Suisse. Alobaki ‘te: “Nazali kolona, kasi milona mizali kobunda mpo na kokóla. Mpamba te, bana mpe mabota ma bango balingi bisano mpe biyenga”. Kasi Pàpa alobi ‘te “tango oyo opesi mpo na katekezi, ekoki kozala libunga tè. Atako bato bazali mingi mpenza te, eloko ya motuya ezali kozanga bososoli ya komiyeba ‘te ozali eklezya”.

Nsango ya Vatikan

 

Nimero ya sanza ya Yanuali 2026 ya zulunalo “Piazza San Pietro”, oyo elobelaka kimya, efungwamaki na maloba ya Pápa Léon XIV. Sanza oyo, Tata Mosantu ayanoli na motangi moko: Nunzia, molakisi ya katekisimo na mboka Suisse; afandaka na Laufenburg, engumba moke ya bato 620.

Nazali kolona, kasi milona mizali kokóla malamu te. Bana mpe mabota mabango balingi masano mpe bafeti to biyenga”; ekomaki mwasi oyo ya mibu 50, na esengo nyonso. Azali kolobela mibu mingi ya bomipesi bwa ye na mateya ya katekisimo, kobanda na komunyo ya liboso kino na nkotisa.  Na mokanda mwa ye, amonisaki likambo moko ya mpasi: “Awa na Suisse, ezali mpasi mpo na koteya baboti, ata mpe bana nà bilenge, ‘te bátya motema na Nzambe”.

Baeklezya ezali se kotikala mpamba

Mabota mazali mingi te mpe mbala mingi batyaka likebi na makambo ma losambo te. Bana bazali kobendama mingi na masano, miziki, ba smartphone mpe bafeti to biyenga koleka kondima (boyambi); bandakonzambe ezali na bato mingi te mokolo mwa lomingo; kaka mibange nde bakendaka mingi kuna. Mokakatano ya “kolona” mokolo na mokolo ntango mabelé ezali kokauka: yango nde ndakisa oyo mokambi moko ya lingomba ya Suisse apesaki. Kasi, ntango alembi nzoto, alendisaki lisusu mokano mwa ye: “Nazali komeka kolona, kasi milona mizali kobunda mpo na kokola to kopusa”. Nunzia asengaki Pápa abondela mpo na bilenge mpe mpo na ye moko, mpo alembe te mpe abungisa mpiko ya kokoba te.

Eyano ya Pàpa

Na nkasa ya “Piazza San Pietro”, Léon XIV atalelaki mitungisi mya Nunzia mpe atyaki yango na esika oyo ezalaki na mikili ya Mpoto: “Makambo oyo bozali kokutana na yango ekeseni te na oyo ya mikili mosusu ya bakristu ya kala”. Pápa alobi ‘te esengeli kotalela kaka motángo ya bato oyo bazali koyangana na makita te; mpamba te, “ba tango oyo bato bazali kolekisa na mateya ya Katekisimo ezali na ntina, atako motángo ya bato bazali koyangana ezali moke”.

Tata Mosantu azongeli likanisi lya ntembe ya Eklezia, bongo alobi ‘te: “Mokakatano ezali na mituya te - oyo ezali kopesa makanisi - kasi na kozanga ya koyeba kososola ‘te ozali Eklezia. Elimboli ‘te: ezali bongo kozala nzoto ya Kristu oyo ezali na bomoi, oyo wapi mokomoko na yango ezali na makabo mpe na misala ndenge moko, ezali te bobele na misala ya mwinda, mbala mosusu na momeseno malamu”.

Na Nunzia - mpe bato basusu banso bazali kokutana na mikakatano motindo moko - Pápa alakisaki bango nzela: “Biso bakristu tozali ntango inso na mposa ya kobongwana. Mpe tosengeli koluka yango elongo”. Mpe azali kokundola ‘te “ezibelo ya solo ya boyambi ezali Motema mwa Kristu, oyo ezali ya kofungwama tango inso polele”. Libyangi ya nsuka ya episkopo ya Roma etokaki makanisi na libula lya Paul VI: “Oyo tokoki kosala ezali kopesa litatoli to kozala nzeneneke ya esengo ya Nsango Elamu ya Kristu, esengo ya mbotama ya sika mpe ya nsekwa”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

13 sánzá ya yambo 2026, 21:10