Luka

2026.01.19 Pàpa Leon XIV elongo na batindami ya ekimenisme ya Finlande 2026.01.19 Pàpa Leon XIV elongo na batindami ya ekimenisme ya Finlande  (@VATICAN MEDIA)

Léon XIV akumisaki ndakisa ya baeklezya ya Finlande mpo na boyokani kati na mangomba (ekimenisme)

Na mokolo mwa yambo, mokolo mwa 19 ya sanza ya Yanuali, Pápa ayambaki yoko etuluku ya ba-Finlande. Bayaki mobembo na Roma mpo na kosala Eyenga ya Losambo mpo na Bomoko bwa Bakristu. Na eleko eye bato bazali mbala mingi kosengenya na mayoki ya kozanga elikya, Léon XIV alobi lisusu ‘te “etindà to mokumba ya ntina” ya ba eklezya, “lokola bakristu bamemi nsango ya elikya”, ezali ya “komema mwinda ya Mokonzi o bisika bya molili mya mokili mwa biso”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mobembo mwa bango, esalemi lokola momeseno “kosepela elongo eyenga ya Mosantu Henri”, episkopo lingelesi oyo ayaki kosakola Nsango Elamu na mboka Finlande na ekeke ya zomi na mibale (XIIè Siecle). Azali mpe bongo mokengeli ya mboka Finlande. Milulu mya ye misalemaka lokola elembo ya bomoko ya bakristu ya ba eklezya ya Katoliko mpe baoyo ya Luther, na ekolo ya Finlande. Ndakisa ya boyokani oyo, mpo na NgangaNzambe Monene, ezali “bilembo ya polele ya ekimenisme ya malamu mpe ya motuya”, na poso oyo ya mabondeli mpo na bomoko ya Bakristu. Na yango, asalelaki libaku lina mpo na kokundwela biso moboko ya batisimo ba biso “mpo na bolimbisi  masumu”, “moboko ya bondeko bonso kati na Kristu”. Abetaki nsente, mpo na komonisa nguya ya elikya oyo atyaki kati na mitema ya bandimi to bakristi. Mpo na yango, alakisaki esengo na ye mpo na “bilembo mingi ya elikya bizali kati na bakristu ya Finlande”.

Finlande, ekolo-ndakisa mpo na boyokani kati na Mangomba (ekimenisme)

Papa azongelaki bikela baeklezya ya Katoliko, Ortodokse mpe ya Luther ya Finlande basalanaki. Alakisaki esengo ya yé, tango ayokaki ‘te, “Finlande eponamaki lokola ekolo ya ndakisa mpo na boyokani kati na mangomba ya bakristu (ekimenisme)”. Na ndakisa, alobelaki lisoló ya ba eklezya ya Orthodoxe-Luthér-Katoliko, epai wapi kati na yango, baepiskopo ya Helsinki “balobaki na boyokani nyonso ‘te “ bokóli ya kosalisa bato bazali na mpasi pene na liwa mpe ya kosunga bango na nsuka ya bomoi esengeli kokoba”, mpe bakumisaki “kokólisa” “mimeseno ya elikya, ya lokumu mpe ya motema mawa”.

Amonisaki lisusu ‘te Likita ya baepiskopo ya Katoliko ya Nordique endimaki mokanda ya Dialogue national Katolike-Luthérien, “Communion en croissance”, mpe ebéngaki yango “eteni ya ntina mingi na nzela ya bondeko”. Alobaki yango kati na “Lokasa ya boyambi”, na sanza ya Setembe ya mobu moleki. Bandakisa biye ya boyokani, elongo na momeseno ya kala ya kosepela eyenga ya Saint-Henri esika moko, “ekoki kosalelama mpo na kolendisa eteni ya motoba ya boyokani kati na Lingomba ya Katoliko mpe Lingomba ya Luther, oyo ekobanda sanza oyo ezali koya”. Elobaki Leon XIV.

Kotatola elikya na maloba ya bobondi mpe bikela ya bolingo

NgangaNzambe Monene azongelaki lisusu mibu ya Yubile ya Elikya oyo esi esilaki, asali ‘te ekokana na motó ya likambo ya poso ya mabondeli mpo na bomoko bwa bakristu, oyo euti na mokanda mwa Santu Polo ona bakristu ba Efeze: “ Ezali na Nzoto sé moko, Elimo mpe azali sé moko; lolenge yoko mpe, Nzambe abengi bino mpo na elikya se yoko”.

Na eleko eye bato bazali mbala mingi kosengenya na mayoki ya kozanga elikya, Léon XIV alobi lisusu ‘te “etindà to mokumba ya ntina” ya ba eklezya, “lokola bakristu bamemi nsango ya elikya”, ezali ya “komema mwinda ya Mokonzi o bisika bya molili mya mokili makasi mwa biso”, kosalisa bato bayeba Nzambe. Na yango, Pápa alobaki ‘te, “na bokasi mpe bolendisi bwa ngolu ya Yezu Kristu, oyo azali bobele elikya ya bato banso, tobyangemi mpe totindami na kozala banzeneneke to batatoli ya bosolo bwa lobiko na nzela ya maloba mabolendisi mpe misala mya bolingo”.

Poso ya Mabondeli to Losambo mpo ya Bomoko bwa Bakristu 2026: "Nzoto sé moko, Elimo sé yoko"
Poso ya Mabondeli to Losambo mpo ya Bomoko bwa Bakristu 2026: "Nzoto sé moko, Elimo sé yoko"   (@Vatican Media)

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

20 sánzá ya yambo 2026, 12:30