2026.01.28 Pàpa Leon ya XIV, libakù lya likita mbo ya banso 2026.01.28 Pàpa Leon ya XIV, libakù lya likita mbo ya banso  (@Vatican Media)

Leo XIV: Tika ‘te somo ya kobomama ya bato ekweyela lisusu ekolo soki moko te.

Na nsuka ya malongi ma yé mpo ya banso, Pàpa Leon XIV akundolaki mokolo mwa mokili mobimba epesamaki mpo na bokundoli bato bazwaki likàmà ya Holocaust. Basepelaki byango o mokolo mwa 27 ya sànzà ya Yanuali, mpe babelelaki «likabo lya mokili moye mozali na antisémitisme te», ezangi bofukisami, boyokisi baninga mpasi mpe monyokoli. Kasi ezala mokili oyo etongami na «limemya kati na bato mpe ekoluka bolamu bya bato banso».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na libakù lya malongi ma ye mpo ya bato banso ya mokolo mwa misato, na tongo ya mokolo mwa 28 ya Yanuali na Vatikan, Pàpa abwakaki mbela mpo ya koboya ezalela ya boyinani. Akundolaki n abato ‘te, mokolo monà mozalaki mokomo mwa mokili mobimba ya bokundoli bato baye bazwaki likama to mpasi ya Holocauste. Abeti nsete mpe alobi ‘te: “eloko eye, ezalaki ntina ya liwà ya baliliyon ya ba-Yuda, nà mpe bato basusu bayiké”.

Auschwitz.
Auschwitz.

Tata Mosantu azongelaki mbela ya yé, na kominoté internationali, mpe alendisaki bang ona bokengi, n antina ‘te: “nsomo ya kobomama y abato, ekweyela lisusu ekolo soki moko te” mpe alobi ‘te, “batonga bikolo to masanga ya bato (societe) epayi wapi bato bàyeba komemyana mpe koluka bolamu by abato banso

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

28 sánzá ya yambo 2026, 17:24