Luka

Kotatola lisanga mpe kozala na bosangani, ndé bafungola mibale mpo na kofungola bizibelo bya bomoko bwa Bakristu

Mpo na kosukisa poso ya losambo mpo na bomoko bwa bakristu, Pápa Léon XIV akambaki molulu mya Elekeli na ndakonzambe ya Saint-Paul-hors-les-Murs, na mokolo mwa lomingo mwa 25 ya sànzà ya Yanuali. Abéngaki bato bázwa mayele mpo na koyebisa boyambi bwa bango na mongongo moko.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Liboso lya batindami kati na lisanga lya bakambi ya mangomba ya Anglican, ya Ortodokse mpe ya Arménie, akomaki maloba mya poso moye mya mabondeli to losambo mpo na bomoko bwa bakristu. Poso wana esilaki o mokolo mwa lomingo, oyo Leon XIV akambaki molulu mya Elekeli na ndakonzambe ya Saint-Paul-hors-les-Murs. Kaka na yoko ndakonzambe epai wapi batiyaki na poso moleki, palata ezali na elongi ya yé (médaillon en mosaïque), sima ya bilili bya bakitani ba yé. Pàpa abyangi bato “bàkolisa lisusu ezalela ya kosala na lisangà mpe na koyebisana oyo tozali, oyo tozali kosala mpe oyo tozali koteya”. Miso ma bato ebaluka mpo na kotala mibu nkoto mibale (2000) ya Malozi to bwalé, liwa mpe nsekwa ya Mokonzi wa biso Yezu na mobu 2033.

Bokundoli ya Nicée

Poso ya losambo mpo na bomoko ya Bakristu “ezali kobenga biso mbula na mbula mpo na kozongisa boyokani na biso”, elobaki Léon XIV. Atako molili ya bokabwani bozali, kobebisa elongi ya etindà yabiso, ekopekisa soki moke te ‘te: mwinda mwa Kristu mongenge. Na kozongela milulu mya mibu 1700 ya likita ya Nicée, na nsuka ya sanza ya Novémbe, na Iznik, na Turquie, na libyangi ya Patriarche Bartholomée I, episkopo ya Roma akanisaki lisusu “litatoli ya motuya mpe ya kobosana te ya bomoko na biso kati na Kristu”. Léon XIV akanisaki lisusu “mokolo moko mwa bondeko”, mpe amonisaki mposa ya “kozwa mayele ya malamu mpo na koyebisa na mongongo moko boyambi epai ya mibali mpe basi ya ntango na biso!” “Kotánga to kosakola elongo Boyambi to Kondima ya Nicée na esika mpenza oyo ekomamaki ezalaki litatoli ya motuya mpe ya kobosana te ya bomoko na biso kati na Kristu”.

Komitika Kristu abongola yo

O mokolo mwa eyenga ya mbongwana ya Santu Polo, “oyo kala azalaki konyokolo Kristu”, Léon XIV akanisaki lolenge bokutani bwa yé nà Kristu ebongolaki ye mpenza: “Ye oyo azalaki kobundisa makasi nkombo ya Kristu, akomi bobele kosakola bolingo bwa ye na molende makasi”. Etindà to mosàlà ya Apostolu ya bapagano ezali lolenge yoko ya bakristu banso ya mikolo mya biso: kosakola Kristu mpe kobyanga bato banso bátiya motema na yé. Mpamba te bokutani bonso bwa solo elongo na Kristu mokonzi ezali: “ntango ya mbongwana, ezali kopesa likanisi ya sika mpe litambwisi ya sika mpo na kokokisa mosala ya kotonga nzoto ya Kristu”.

Bosangani mpe bomoko

Na kolobela mayangani mibale ya Synode ya mobù 2023 mpe ya 2024, na ndakisa ya Pàpa François, Leon XIV azwaki maloba ya mokitani na yé, oyo alobaki na Irak na 2022 ‘te «nzela ya bosangani ya eklezya katoliko (synode catholique) ezali mpe esengeli kozala na bomoko. Sé lokola nzela ya bomoko esengeli kozala ya lisanga». Bakambi bamangomba bayiké basanganaki na mayangani mànà mibale, lokola bandeko. Nde yango nzela oyo wapi esengelo kokola na lisanga na boyebani ya bisika ba biso mpe ya mimeseno bya biso ya bonkoko.

Kotondo botondi na Eklezya apostoliki ya Armenie.

Lingomba lya Ortodokse oyo ezwami na Etchmiadzin na Arménie, n anse ya bokambi bwa catholicos Karekin II, eponamaki mp ona kobongisa matangi mp ona poso ya losambo mp ona bomoko bwa bakristu. Libakù monene mp ona Pàpa Leon XIV kotondo botondi eklezya ya Armenie mpe kolobela ndakisa to litatoli makasi ya bokristu ya bato ya Armenie balakisaki. Na yango ebimi lokola ekolo ya yambo ya bokristu na nzela ya batisimo ya Mokonzi Tiridate na mobù 301, na lisalisi lya Santu Gregoire. Papa asukisaki na losambo, mpo ‘te “mboto ya Nsango Elamu ekoba kokolisa mbuma ya bomoko, bosembo mpe bosantu, mpe lisusu mpo na bolamu bwa kimya kati na bato mpe bikolo ya mokili mobimba”.

Elili ya  Pàpa Léon XIV,, engengisami na mwinda, okati ya ndako nzambe monene Saint-Paul hors les murs, na mopanzi ya oyo ya Pàpa François
Elili ya Pàpa Léon XIV,, engengisami na mwinda, okati ya ndako nzambe monene Saint-Paul hors les murs, na mopanzi ya oyo ya Pàpa François   (ANSA)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

26 sánzá ya yambo 2026, 12:07