2026.01.31 Episkopo wa lokumu Christophe Pierre, Ntoma ya Pàpa na Etats-Unis elongo nà Mgr Pena Parra. 2026.01.31 Episkopo wa lokumu Christophe Pierre, Ntoma ya Pàpa na Etats-Unis elongo nà Mgr Pena Parra.  

Bilako bya Pàpa mpo ya mibù tuku mwambe ya Episkopo wa lokumu Christophe Pierre

Batángaki telegrame oyo ezalaki na maloba bonzenga ya Léon XIV na likita moko esalemaki na Washington mpo na kokumisa mokolo mwa mbotama ya kardinale ya France. Mgr Edgar Peña Parra, mokambi-molandi ya secrétaire d’État, azalaki mpe na likita lyango.

Bansango ya Vatikan

 

Nonisature apostoliko ya Washington, eyambaki na boninga bonso mpe bondeko, o mokolo mwa mitano mwa 30 ya sànzà ya Yanuali, mpo na bokundoli mibu tuku mwambe (80 ans) ya mbotama ya Episkopo wa lokumu Christophe Pierre, ntomà ya Papa na Etats-Unis. Kardinale asalaki lisukúlu moko ya mokuse, apesaki bato banso bazalaki wana matondi mpe alobelaki makambo mosusu ya mosala mwa ye.

Mgr Edgar Peña Parra, azalaki wana kasi na esika ya mokambi ya secrétariat ya Etat. Atángaki telegrame oyo, o kati na yango, Pape Léon XIV atondoki “botondi” bwa ye, mpo na « bomipesi bwa episkopo wa lokumu Pierre mpe mpiko  amonisaki na boumeli bwa mosala mwa ye. Mpamba te, awumeli mingi mpenza  o mosala ya kosakola Nsango Elamu mpe na mosala ya Saint-Siège ». Na nsima, episkopo-mokonzi to archeveque, atindelaki bango mbote ya kardinale Pietro Parolin, Mokomeli to sekeletere ya Etukà ya vatikan, elongo nà oyo ya bakambi ya sekeletere ya Etukà.

Mokambi ya Lisàngà lya baepiskopo ya Eklezya ya Katoliko na États-Unis, Episkopo-Mokonzi to archeveque Paul S. Coakley, ya Oklahoma City, alobaki mpe na bayangani bazalaki wana mpo na kotondo botondi na Ntomà ya Pàpa, na ntina ya mosala mwa ye lokola momonisi mwa Pape na mboka. Na nsuka ya likita lyango, bapesaki bato oyo basàlaka na biro ya mokonzi ntomà ya Pàpa, malako ma lokumu.

Mgr Pierre: tango azalaki kolobela kokabwana ngambo na ngambo, mpe abakisaki 'te ekomaka bongo «soki makanisi ezali kosuka mpo na bato bake kaka oyo baponomi likolo ya baninga basusu»
Mgr Pierre: tango azalaki kolobela kokabwana ngambo na ngambo, mpe abakisaki 'te ekomaka bongo «soki makanisi ezali kosuka mpo na bato bake kaka oyo baponomi likolo ya baninga basusu»

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

31 sánzá ya yambo 2026, 22:16