Bamonisi ye Palata ya Pápa oyo ebongisamaki mpo na Saint-Paul-hors-les-Murs
Bansango ya Vatikan
Palata to Medayi yango esalemaki na Mosaïque ya Vatikan, na esika babengi Fabrique ya Saint-Pierre, oyo, lokola ezali limesano, bazalaki kosala yango nsima ya boponami ya Nganga-nzambe monene na Nganga-nzambe monene. Oyo etangami mpo na Papa ya mbala ya nkàmà mibale na tuku motoba na sambo (267è Pape) na lisoló ya Eklezia, bapesaki ye yango o mokolo mwa misato mwa 14 ya sanza ya yanuali na Vatikan. Palata ya mosaïque, oyo ebéngami clipeus, ebongisami mpo na kokembisa Bazilika Saint-Paul-hors-les-Murs.
Bakotya yango pembeni ya elilingi ya Pápa François, na eteni ya loboko ya mobali ya ndako-nzambe, na bolai ya metele soki zomi na misato (13 m). Liyebisi moko ya ndako ya bopanzi-nsango ya Vatikan elobi ‘te: Medallion ya mosaïque ezali na diametele nkàmà moko na tuku misato na sambo (137 cm) mpe esalemaki na vitre mpe na wolo likoló ya bibende. Biteni yango soki 15 000 esalemi na mayele ya kala ya kosala mayemi ya mosaïque mpe batyá yango na mayemi ya Vatikan oyo batyaka mafuta. Biloko biye bizali komonisa elongi ya Pápa Léon XIV, ezali na motuya mingi.
Na losambo elongo nà Pàpa
Liyemi yango elakisi elilingi moko oyo Rodolfo Papa, moto moko ya mayele, asalaki. Ezali elilingi ya mafuta oyo ezali na bonene lolenge moko nà Palata to medayi ya mosaïque, oyo ebongisamaki mpo na kosalela yango mosaïque. Na nsima, bakosangisa yango na bililingi bisusu ya baPápa na esika babengi Fabrique de Saint-Pierre na Vatikan. Episkopo wa lokumu Mauro Gambetti, nganga-nzambe monene ya Basilique Saint-Pierre, nà mpe episkopo James Michael Harvey, nganga-nzambe monene ya Saint-Paul-hors-les-Murs, mpe nà abbé ya monastele Saint-Paul, Père Donato Ogliari, nde bato bapesaki Ekela eye na Pàpa. Bazalaki elongo nà Rodolfo Papa, moto moko ya mayele na mosala ya kosala mayemi, mpe Paolo Di Buono, mokambi ya esika oyo babongisaka mayemi na Vatikan. Na nsuka ya likita lyango, Pápa asalaki libondeli elongo na bato oyo bazalaki pene na esika mosàlà monà.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
