Luka

Angélus: “Nzambe atalaka mokili na mosika te, kozanga kosimba bomoi bwa biso, ba mpasi na biso mpe bilikya ba biso”

Yambo te asala losambo la Angelus, Léon XIV ayebisaki bakristu ndimbola ya batisimo ya Yezu, oyo esalemaki o mokolo mwa lomingo moye mpe elobelami na Nsango Elamu ya Mateo. Pàpa asengi tokundola na likabo tozwaki na sakramento ya batisimo. Yango etali mokristu na mokristu na “kozala nzeneneke mwa yango na esengo mpe bikela”

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Na nse ya moi makasi ya eleko ya malili, Pape apesaki mbote na bankoto ya bakristu bayaki na Place Saint-Pierre mpo na kokumisa mokolo mwa lomingo la batisimo ya Kristu.  mokolo moye mozali elembo ya nsuka ya eleko ya Mbotama to Noele. Yango nde, ekotisi eklezya na ebandela ya eleko mobù ya sika ya losambo. Ezali eleko ekobenga biso “tólanda Mokonzi elongo, tóyoka Liloba lya ye mpe tómekola misala mya ye ya bolingo mpo na bazalani ba biso”. Oyo nde liyebisi Léon XIV alobaki ut’à lininisa lya ndako ya bantomà na Roma.

Batisimo ya Yezu na mayi ya Yordani ezali kobengisa moko na moko ya biso mpo na kozongisa bilaka bya biso ya sakramentu eye. Nde yango “ezali kokomisa biso bakristu, ezali kolongola biso na masumu mpe ezali kokomisa biso bana ba Nzambe, na nguya ya Elimo ya ye ya bomoi”. Na Nsango Elamu ya Mateo, Pápa alimbolaki lolenge kani sakramentu ya batisimo ezali elembo ya ngolu, na nzela ya nkitela ya Elimo Santu. “Bosato Bosantu mobimba mozali na lisoló ya bato: lokola Mwana akitaki na mai ma Yordani, Elimo Santu akitaki likolo na ye, mpe na nzela ya ye, nguya ya lobiko epesamaki na biso”.

Batisimo ememaka moko na moko kati na Eklezya

Nzambe atalaka mokili na mosika te, kozanga kosimba bomoi ya biso, bampasi ya biso mpe bilikya ba biso”, ekobaki episkopo ya Roma. “Nzambe ayei kati na biso na bwanya ya Liloba lya ye oyo ekomi moto, mpe akotisaki biso kati na mwango ya bolingo ya kokamwa mpo na bato banso”. Na kokamwa monene ya Yoane Mobatisi, Mokonzi ayaki komibatisa “lokola basumuki banso, mpo na kolakisa ngolu monene mwa Nzambe”.

Sakramentu ya batisimo ekokomisa biso Basi mpe babali, bana ba banzambe, ya bikolo binso, ya bankota banso mpe ya ezalela ya bonkoko nyonso, oyo ebotisami na Elimo. Bongo Pàpa asengi bakristu bakundola na likabo tozwaki na sakramento ya batisimo. Yango etali mokristu na mokristu na “kozala nzeneneke mwa yango na esengo mpe bikela”. Mokonzi ntoma monene alobelaki lisusu milulu asalaki kala mingi te na tongo na Chapelle Sixtine, epai wapi apesaki libatisi na bana-mike. Bango mpe “bakomi bandeko ba biso ya basi mpe babali, na boyambi”. (la célébration plus tôt dans la matinée dans la chapelle Sixtine au cours de laquelle il a baptisé vingt nouveaux-nés).

Papa asukisaki na koloba ‘te “sakramentu ya liboso ezali elembo mosanto oyo ezali elongo na biso mpo ya libela. Na ngonga ya molili, libatisi ezali mwinda; na matata ya bomoi, libatisi ezali boyokani; na ngonga ya liwa, libatisi ezali ekuke to ezibelo ya lola”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

11 sánzá ya yambo 2026, 13:29