Angélus: Léon XIV asengi ‘te bàtosa bomoto bwa moto ya moto nyonso
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
Na lomingo loye la mibale sima ya Mbotama ya Mokonzi, na esika ya Vatikan, epai wapi bakristu bayiké basanganaka, Pàpa azongelaki kolobela ebandela ya Nsango Elamu ya Santu Yoane ya mokolomoye mwa 4 ya yanuali; “Liloba akomi moto, azalaki okati ya biso”.
Elikya ya bokristu
Ut’o lininisa lya ndako ya bantoma, Leon XIV abetaki nsete alobi ‘te elikya ya bokristu «esimbami te na ba prévisions optimiste to ba calculs ya bato, kasi na « mokano mwa Nzambe ya kokabola nzela elongo na biso », mpo ‘te «tozala susu te biso moko na mobembo mwa bomoyi». «Ezali mosala mwa Nzambe, na lisalisi lya Yezu Kristu oyo akomi moko kati na biso, aponami mpo na kozala elongo na biso mpo na libela, lokola Nzambe alingaki yango».
Mobombamo mwa Mbotama elakisi malau ‘te, “moboko mwa elikya ya biso ezali nde Bomoto bwa Nzambe”, ebakisaki ye. Yezu ayaki na botawu bwa nzoto ya moto, mpo “na kozongisela biso elikya”, kasi boyei bwa yé “ epesi biso, na ngambo moko, «epesi biso bilaka mibale, elikya ya bomoi, na ngambo moko mpo na Nzambe, mpe mosusu mpo ya moto», elobaki Episkopo wa Roma.
Molimo na bomoto
Pàpa alimboli ‘te, tosengeli koyemba Nzambe se bobele na bomoto bwa Yezu. Asengi toyeba lolenge kani kolakisa boyambi bwa biso, mpo ‘te akoma moto o kati na biso. Tozala na makoki ya kokanisa, kosambela, mpe kosangela boyei bwa Nzambe oyo azali koya kokutana na biso. Nzambe oyo azali mosika te, afandaka o likolo lya biso, kasi Nzambe oyo azali penepene, afandaka na mabele na biso ya bolembu, amonanaka na bilongi bya bandeko na biso, mpe amimonisaka na makambo ya mokolo na mokolo.
Bosolo na mokumba
Eloko ya mibale ezali ‘te, Tosengeli mpe kozala nabosolo liboso lya mokano ya biso ya kosalela bato. Soki Nzambe akomi moko kati na biso, ekelamu nyonso ya moto ezali elilingi na ye, azali na elilingi na ye, azali na mwinda mwa ye. Mpe yango ezali kobenga biso na Léon XIV asengi ‘te bàtosa bomoto bwa moto ya moto nyonso, mpamba te, ekoki kobebisama te mpe na kosalela bolingo na biso moko moko mpo na basusu.
Bondeko, Boyokani mpe bomoko
Na nsima, Nganganzambe Monene alobaki lisusu ‘te: “Kokoma moto esengi biso mpe bomipesi ya solo mpo na kotombola bondeko mpe lisanga”, mpo ‘te bomoko ezala ndakisa ya boyokani kati na bato, ya boyengebene mpe ya kimya, ya kosunga baoyo bazali na bosawa, mpe ya kosunga baoyo bazali na bolembu. Na sima, abakisaki ‘te: «Nzambe akómi moto, yango wana losambo la solo mpo na Nzambe ekoki kozala te soki tozali kotya likebi te na nzoto ya bomoto».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
