Angélus: Léon XIV akebisi na ntina ya baoyo bazwaka esika ya esengo

Yambo ya kosala losambo lya Angelus, o mokolo mwa lomingo, mwa 18 ya sànzà ya Yanuali ya mobù 2026, Pápa Léon XIV akanisaki na Evanzile ya Yoane na ntina na litatoli ya Yoane Mobatisi, oyo amonisi Yezu lokola «Mwana na mpate ya Nzambe ». Tata Mosantu abyangaki bakristu bámitika te ‘te kozela ndingisa mpe koluka lokumu ya bato ekanga bango na motambu, kasi bázongela esengo ya solo: koyeba ‘te Nzambe alingaka bango.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na lomingo loye ya mibale ya mobu A, na Place Saint-Pierre, Léon XIV azongelaki lisusu Nsango Elamu ya mokolo (Jn 1, 29-34), oyo elakisa Yoani Mobatisi azali kondima Yezu lokola Masiya: «Tala Mwana Mpata wa Nzambe oyo akolongola masumu ma mokili». Nzokande, alingi kolimbola ‘te etindà ya Yoani Mobatisi ezalaki bobele kolakisa Kristu mpo ‘te amonisama epayi ya Israele. Na yango alobaki ‘te, «Soki nayei kobatisa bino na mayi, ezali mpo ‘te ye amonisama na Israele».

Yoane mobatisi , esengo ya bomikitisi

Pápa amonisaki Nguya ya Elimo oyo ebatami sima ya litatoli liye. Yoane Mobatisi, oyo bato bayike bazalaki kolanda mpe bakonzi bazalaki kobanga, akokaki “kosalela yango lokumu la ye”.  Kasi o miso ma Yezu, andimi na ye komikitisa,  Abongisi esika monene ya Mokonzi mpe alongwe na esika oyo azalaki kosala mosala mwa ye. “Moto oyo azali koyà nsima na ngai, aleki ngai, mpo azalaki liboso la ngai”. Léon XIV alimbolaki ‘te likambo lya komikitisa ezali oyo ya moyekoli nyonso: kobongisa nzela mpo na Mokonzi mpe, tango azali koleka, koyeba ye “na esengo mpe na bomikitisi”. Kozanga koluka kozala na esika ya liboso.

Kobanda na ndakisa ya Baptiste, Tata Mosantu abendaki likebi likoló ya masengynia mya mikolo mya biso. Na kati ya ba societe na biso, «kozela ndingisa ya bato, koluka lokumu mpe komonana» mbala mingi «ezwaka esika ya monene koleka». Yango nde ezali na bopusi likoló na bizaleli, kobimisa «minyoko mpe bokabwani». Epai mosusu mpe, ezali kobimisa «boyokani ya tango mokuse kaka, ezali kolembisa nzoto mpe komikangisa». Na ntina na yango, Léon XIV alobaki ‘te: «Solo, tozali na mposa te ya bato baye bazwi libaku ya kozala na esengo. Esengo na biso mpe bonene bwa biso eùtaka na lokumu te mpe na lokumu ya ntango mokuse, kasi na koyeba ‘te Tata wa biso ya likoló alingaka biso mpe asepelaka na biso. Alobaki ‘te esengo ya solosolo eutaka na bomengo ya ntango mokuse te, kasi nde na koyeba ‘te “Tata wa biso ya likoló alingaka biso”.

Nzambe oyo ayei kokabola mikumba mya biso

Na nsima, Pápa amonisaki ‘te Nzambe oyo Yezu alakisaki biso, azali Nzambe ya «teatele te», kasi Nzambe oyo azali pene na biso. «Nzambe ( . . .) ayei kati na biso te mpo na kokamwisa biso na makambo ya kokamwa, kasi mpo na kosangana elongo na biso kati na mpasi mpe komema mikumba mya biso », Alakisi biso bongo «oyo tozali mpenza mpe motuya tozali na yango o miso ma ye». Na nsuka, Léon XIV apesaki elendiseli moko ya sikisiki ‘te: «Tika ‘te Mokonzi akuta biso te na bopotu tango akoleka». «Tóbebisa ntango mpe makasi ma biso te, mpo ya kolanda makambo mazali na ntina te na miso» kasi tózwa liteya epai ya Yoane Mobatisi mpe tóbatela «makanisi ma biso», Kolinga «makambo ma pete», kozala na «makanisi malamu mpe ya motema», «kozala na esengo na biloko ya ntina» mpe koluka mokolo na mokolo «tango malamu» ya kimya mpo na kobondela, kokanisa mpe koyoka, elingi koloba ‘te «kokende o esobe » mpo na kokutana na Mokonzi mpe kofanda elongo na Ye.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

18 sánzá ya yambo 2026, 16:43