Angelus: Kozala na bomoi na nzela ya Nsango Elamu na makambo manso mpe na bisika binso
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na mateya ma yé mwa lomingo la misato o mobù A, mwa 25 ua Yanuali, ut’o lininisa lya ndako la bantoma, Pàpa asalaki motuna ya koyeba tango nini mpe epai wapi Yezu abandaki koteya bayekoli ba ye ya yambo. Ya liboso, tango ezali komonisa biso ‘te “ntango eye toponi ezali ya malamu te”. Bauti kokanga Yoane Mobatisi. Ezali eleko esengeli komonisa bokengi, kasi ezali bobele kati na ezalela wana ya molili nde Yezu abandi komema mwinda mwa Nsango Elamu: “Bokonzi bwa likoló bokómi pene”, mpe akokanisi yango nà bomoi bwa moko na moko ya biso mpe na bomi bwa eklezya, elobaki mokonzi nganga-Nzambe.
Nsango elamu ekosenge kolikya kotya motema
“Tango mosusu, mpo na mikakatano mya motema to mpo na makambo misusu oyo tokutanaka na yango mpe tolobi ‘te ezali ya malamu te, tokanisaka ‘te ezali ntango ya malamu te mpo na kosakola Nsango Elamu, to kozwa mokano, to kopona, to kobongola makambo”. Abetaki nsete mpe alobaki ‘te: “Likama ezali ya kotikala ya kokangama kati na kozanga kozwa mokano to kokangama kati na bomibateli ya koleka ndelo”. Episkopo wa Roma alobaki ‘te: “Nsango Elamu ezali kosenga na biso, tómityelana motema, mpe amonisaki ‘te Nzambe azali ntango inso kosala mosala, mpe ntango inso ezali malamu mpo na Mokonzi, ata soki tozali komiyoka ‘te tomilengeli nayino te to soki makambo mazali komonana malamu te”.
Komibosana mpo ya kosakola Nsango Elamu ya Nzambe
Na ntina ya esika oyo Yezu aponaki mpo na kobanda mosala mwa ye ya kosakola na Nazarete, mpe akendaki kofanda na Kafarnaum, Léon XIV amonisaki lolenge kani engumba ena ezalaki na bato ba mikili ndenge na ndenge. Na yango, Yezu atikalaki kofandaki na Galilea, etúká ezalaki na bato mingi ya bikólo bisusu, ya bapagano mpe epai wapi bato bazalaki kosala mibembo, kokutana mpo na kosala mombongo. Tokoki koloba ‘te ezali etando ya bikolo ndenge na ndenge mpe ya eklezya ndenge na ndenge bazali koleka kati na yango, elobi Pàpa.
“Nsango Elamu eyebisi biso ‘te Kristu azali mo-Isayele, kasi alekaki ndelo ya mokili na ye moko mpo na kosakola Nzambe oyo azali pene na bato banso, oyo abwakaka moto moko te, oyo ayaki kaka mpo na bato semba te, kasi, na ngambo mosusu, amikotisaka na makambo mpe na boyokani ya bato”, na yango Pàpa alendisi bakristu banso ba kolonga momekano ya kokanga: “Mpo ‘te Nsango Elamu esengeli esakolama mpe kotambwisama na lolenge inso mpe na bisika binso, mpo ‘te ekoka kozala levire ya bondeko mpe ya kimya kati na bato, kati na mabota, kati na baeklezya to mangomba, mpe kati na bikólo”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
