Pàpa Leon XIV ayambaki mokambi ya ekolo ya Mongolie

Na tongo ya mokolo mwa 4 Desembe, Pápa akutanaki na Ukhnaagiin Khürelsükh na Palais apostolique. Na sima, Prezida ya Mongolie asololaki na Secrétaire d’État ya Saint-Siège mpe na Sous-Secrétaire mpo na boyokani na bikolo.

Nsango ya Vatikan

 

Léon XIV akutanaki na mokonzi ya Mongolie, Ukhnaagiin Khürelsükh, na mokolo mwa minei, 4 Desembe. Na sima, asololaki na Kardinal Pietro Parolin, Secrétaire d’Etat ya Saint-Siège, mpe na Mgr Mihăiță Blaj, Secrétaire d’Etat mpo na boyokani na bikolo.

Na masolo na bango oyo esalemaki na Secretariat d’Etat, “batyaki likebi mingi na boyokani malamu oyo ezali kati na Vatikan mpe Mongolie, na mokano ya kokolisa yango na makambo ya boyebi makambo (culture)”, elobaki liyebisi ya ndako ya bapanzi-nsango ya Vatikan. “Lisungi lilamu oyo Eklezya Katoliko ya Mongolie ezali kopesa na bato ya Mongolie, mingi mpenza na makambo ya kelasi mpe ya bokolongonu bwa nzoto, emonisamaki mpe polele”, elobaki liyebisi”.

Ebandela ya molongo ya Nzela ya Kuruze na Oulan-Bator: Elikya ya zubilé ezalisami mpe na Mongolie.
Ebandela ya molongo ya Nzela ya Kuruze na Oulan-Bator: Elikya ya zubilé ezalisami mpe na Mongolie.

Mobembo ya Pàpa François na Mongolie

Na sànzà ya mwambe ya mobu 2023, Eklezya Katolike ya ekólo ya Mongolie, mboka oyo ezali o nta ntei ya Azia, mpe ezali na bandimi pene ya nkoto yoko na nkama mitano (1 500 fidèles), eyambaki Pápa François (avait reçu en août 2023 le Pape François). Ye nde azalaki pápa ya liboso oyo akendaki na Mongolie. Na mobembo mwa ye ya mbala ya tuku minei na misato ( 43e), Pápa ya Argentine akutanaki na bakonzi ya mangomba ya mboka, na Katedrale ya Saints- Pierre mpe Paul na Oulan-Bator. Asalaki misa na Steppe Arena mpe afungolaki na mboka-mokonzi ya Mongolie « Ndako ya charité », ndako ya koyamba babola oyo epesamaki na misala mya Pápa ya Australie. O mokolo mwa 31 ya Yanuali  na mobù 2024, lokotà ya Mongolie ekómaki monoko ya tuku mitano na mibale (la 52e langue de Vatican News) ya Vatikan News. Ezalaki bongo mpo na komonisa ‘te bazali kotya likebi na mwa lingomba liye ezali na mindelo ya Russie ná Chine. Banda wana, Angélus nyonso ya mokolo ya lomingo mpe mateya ma mokolo mwa misato, ebongolami mpe ebimisami na lokasa lya internet ya Vatikan.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

05 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 10:15