Pápa azali komitungisa mpo na bopusi ya AI na bonsomi mpe elimo ya bilenge
Albys KBD, CP – Kinshasa/CP
« Lolenge kani tokoki kosala ‘te bokoli bwa mayele ya bamasini esala mpenza mpo na bolamu bwa bato banso, kasi kaka te mpo na kotya bozwi mpe bokonzi na maboko ya bato moke?». Liboso ya bato nkama moko (100) oyo bazalaki na likita lya AI mpe Ndako ya lisanga (maison Commune), oyo wapi bango banso bazalaki bato ya lingomba Centesimus Annus Pro Pontifice to ya ebongiseli moko ya ba iniversite ya Katoliko (SACRU), Pápa atyaki na esika ya liboso na makanisi ma ye, oyo etalelaki mingimingi makambo ya bato, likambo oyo etaleli mateya mya Eklezya mpo na bolamu ya bato.
Mayele ya bamasini ekoki te kopekisa moto akóma kokamwa mpe kokanisa
Motuna moko ya ntina, eleki oyo ya liboso, ezali boye: “Na mikolo miye to eleko eye ya biso, Kozala moto elimboli nini ?” Mokonzi ntoma monene, amonaki malamu kokundola ‘te mokumba ya moto ezali ya kozala “mosalani na mosala ya bozalisi (creation), kasi te bobele mosombi mpamba ya makambo oyo mabimisami na tekinoloji ya bato”.
Mingi mpenza bazali kotalela bilenge, «‘bonsomi bwa bango’ mpe ‘elimo ya bango’ mpe ‘misala ya tekiniki oyo ekoki kobebisa mayele ma bango mpe kokola na bango».
Sekele mpe makanisi mansuka, «mbala mingi batshiolaka yango» na bato bazali kokonza
Engebene na episkopo ya Roma, esengeli kosunga bilenge, elobaki ye « kasi kopekisa bango te» na nzela na bango ya kokóla mpe ya kozwa mikumba. «Kozala na makoki ya kozwa bansango ebele mpe boyebiebele, esengeli te kosangana na makoki ya kozwa ndimbola mpe motuya na yango», Pape ya Etats-Unis alendisaki mposa ya «kotala makambo ma kokamwa mpe mituna mya nsuka ya bomoi na biso. Mbala mingi, makambo maye mazalaka ya kotsyolama na baye bazali kokonza bato ».
«Na yango, ekozala na ntina mingi kopesa nzela na bilenge, bayekola kosalela bisaleli biye na mayele ma bango moko. Bafungwama na koluka bosolo, na bomoi ya molimo mpe ya bondeko, na kofungola bandoto ba bango mpe horizon ya mikano bazali kozwan mpo ya kokoma bato ba mayele». Léon XIV, azali kosenga tosunga bilenge na mposa na bango ya kozala na bokeseni mpe ya kozala malamu koleka.
Mpo na kokokisa bolamu ya bato banso, ezali na ntina o miso ma Pápa ‘te tózongisa mpe tólendisa elikya oyo bilenge bazali na yango na makoki ya bato ya koyeba lolenge oyo bamasini bina ya sika ekobongwana. «Kondima oyo lelo ezali kobebisama na likanisi ‘te kokola na yango ekolanda nzela oyo ekoki kopengolama te».
Mpo na yango, Léon XIV alobaki ‘te «esengeli kosala makambo na boyokani, na politiki, na ba organisation, na bakompanyi, na makambo ya mbongo, na mateya, na makambo ya kosolola, na bato mpe na mangomba».
Mosala ya bolukiluki
Na kotalela makambo ya mokili mobimba mpe ya bituluku ndenge na ndenge, bolukiluki oyo ebimisami na bibongiseli yango mibale - Centesimus Annus mpe SACRU - esangisi makanisi ma bato ya mayele zomi na sambo (17) mpe ya bato ya mayele oyo bautaki na ba iniversite 10 mpe na bibongiseli mibale oyo ezali na mikili libwa (9). Masolo oyo ezali na mokano ya kotalela lolenge mayele ya AI ezali kokola mpe ndenge oyo ezali kosalelama na ba izini, na makambo ya mbongo, na biteyelo mpe na makambo etali kosolola ya bato. Na kolanda mateya ma Pápa François mpe Pápa Léon XIV, mosala moye mozali koluka koyeba makama, bokosi mpe bokeseni oyo euti na kosala mpe kosalela mayele ya bamasini (AI) na ndenge ya mabe mpe kozanga mibeko. Ezali mpe koluka koyeba makambo nini esengeli mpo na kosala mayele ya sika na lolenge ya malamu, kosalela tekinoloji mpo na bolamu ya bato banso mpe na limemya inso mpo na lokumu la moto.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
