Pápa akundweli banakelasi ‘te : Eyenga ya Mbótama ezali libyangi mpo na kosakola Boboto (kimya).
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na mokolo ya 16 Desɛ́mbɛ, na nsima ya nzánga, invité moko ya ntina mingi ayanganaki na molulu ya mbala ya zomi na moko ya miziki ya Noele InCanto oyo bana-kelasi ya eteyelo ya Pápa Paul VI na Castel Gandolfo basalaki. Léon XIV azalaki na kati ya bato oyo bazalaki kotala. Mokonzi ya Eklezya ya Katoliko akendeki kotala esika yango nsima ya kolongwa na Villa Barberini, kaka na engumba yango - epai wapi akendaka poso na poso na mokolo ya yambo mpo na kotikala kuna kino mokolo mwa mibale - na nsima, akendeki kotala miziki na esika ya kosala ngalasisi mpe akanisaki lisusu na bakristu ‘te bomengo ya solo ezali te na oyo moto azwi, kasi na kimya oyo moto azali na yango kati na ye moko mpe na bato oyo bazali pembeni na ye.
Eyenga ya Mbotama epesaka esengo mpe kimya o mitema
Bana, bango banso balataki bilamba ya ntalo mpe bakazaka ya mpembe, bafandaki na kimya na esika ya masano, moko nsima ya mosusu. Na esengo nyonso, babandaki koyemba, mpe bamosusu kati na bango babandaki koningisa nzoto mpo na komonisa esengo na bango. Miziki mpe maloba ma nzembo Adeste fideles, Joy to the world, Noël Noël, Astro del cielo eyokanaki na kati ya bato oyo batondisaki salle ya ngalasisi bosika bazalaki. Esika ena ebongisamaki mpo na libaku lina: baboti, balakisi, basali bya eteyelo, episkopo ya enguma ya Alban. Ezalaki mpe nà Mgr Vincenzo Viva, prezida ya ebongiseli oyo etalelaka biloko bya motuya ya Vatikan, Mgr Giordano Piccinotti, mpe Pápa. Bazalaki na molongo mwa liboso, na katikati. Na suka ya lisano lyango, Léon XIV alobaki ‘te: “Ezalaki esengo mingi koyoka nzembo ya Noele na lokota ya Italien, ya Latin, ya Lingelesi mpe ya Espagnol”. “Koyoka bana oyo bazali koyemba na minoko mina minso ezali kosalisa biso boni boni Eyenga ya Mbotama to Noele ezali kolamwisa esengo, kimya, libyangi ya ntina mingi kati na mitema mya biso banso”. Bongo abakisaki, mpe asepelaki na libyangi oyo azwaki. Kasi mpo na kosekisa bana, alobaki ‘te , “letele na ye, ekomelaki ye na ndenge moko ya kokamwa”.
Kosàla manso mpo ya kimya (boboto)
Na sima, Ntoma Monene alandaki moko ya banzembo biye bayembaki, oyo maloba ma yango ezalaki na lolengeloye: «Baanzelu baye bamemi bolingo » mpo na komonisa ‘te bana bango moko bamemi bolingo na biso banso «na mpokwa ya lelo, nà miziki kitoko». Na sima azongisaki ‘te «tango Santu Augustin azalaki kokanisa na miziki, alobaki ‘te : «moto oyo azali na bolingo ayembaka, mpo motema mwa ye eyebi solo eloko kani ezali na ntina ». «Mpe Nzambe alingaki kopesa biso nyonso likabo ya bolingo: yango ezali nde Noele, Eyenga ya Mbotama», emonisaki na nsima Pape, Nzambe oyo alingaki kozala pene na biso, mingi mpenza na bana mike». Tika ‘te molimo moye tozali kokumisa na mpokwa ya lelo, mpe na mikolo miye ezali koya, na Noele, mpe mbala mosusu na mbula mobimba, «epesa biso nzela ya koyoka mpe ya kozala na bolingo ya Noele». Mpe lisusu, azongeláki maloba ma loyembo mosusu oyo elimboli te : «Na Eyenga ya Mbotama, tokoki kosala mingi», Léon XIV alobaki ‘te «ezali mpe libyangi monene mpo na biso: tósala mingi mpo na kosakola kimya, bolingo mpe bomoko kati na mokili».
Komona Nzambe na elongi ya bana
Na nsuka, Pápa apesaki bobenisi bwa ye na bana banso mpe mabota ma bango. “Nzambe alingi apusana penepene na moko na moko na bino, na ba ndeko ba bino banso, na mabota ma bino”, elobaki ye. Bongo na kosukisa alendisaki bango ba sambela “elongo”mpe ba “fungola” “mitema” ma bango mpo bamona bozali bwa Nzambe “mingi mpenza na elongi ya bana mike”. Sima, babetelaki ye maboko, mpe bazalaki koganga na esengo mpo na koyamba Pápa, Ntoma Monene. Lokola likabo, ba pesaki ye raquette ya lisano ya tennis mpe bilamba ya eteyelo. Bana bazalaki koyemba: “Léon, Léon, Léon”. Pápa akangaki ba foto elongo nà bango mpo ya kokanisa (souvenir), liboso lya kopesa bango mbote ya nsuka mpe kolongwa na esika yango.
Lisapo lya eteyelo ya Pàpa Paul VI
Eteyelo ya Pàpa Paul VI ya Castel Gandolfo ezali école primaire ya Katoliko, ezali privé. Etongamà na ntaka ya mikamà sambo (700) mètres ya Villa Barberini. Pàpa Montini nde apesaki ndingisa ya kotonga yango, lokola likabo mpo na bato ya mboka. Yemei afungolaki yango o mokolo mwa 12 setembe na mobù 1968.
“Na nzela ya mosala moye, tolingi kolakisa lisusu bolingo na biso mpo na bato ba Castel Gandolfo, mpe mingimingi mpo na bana mpe bilenge ya mwa engumba eye ya bolingo; mpe, soki likoki ezali, na nzela ya misala minso mya eteyelo oyo ekosalema kuna, mpo na bilenge ya zingazinga, mingimingi baoyo bazali na engumba ya Albano”. Paulo VI alobaki bongo mokolo mona, mpe amonisaki ntina ya mateya ma Katoliko mpo na bilenge bikoya.
Na bambula ya 1960, na ebandeli, esika yango ezalaki na biteyelo oyo ezalaki kotambwisama na ba Frères des écoles chrétiennes (La Salle) mpe na Maestre Pie Filippini. Na 2002, Fondation Scuola Pontificia Paolo VI esalemaki, esangisaki ba entités mibale na kati ya organisme moko ka ya gestion.
Lelomei, Eteyelo ya Pápa Paul VI ezali na mwayene ya bana 300 na biteyelo oyo esangisi mateya ya lingomba ya Katoliko, mpe ezali koteya bango makambo mosusu lokola masano, miziki, minoko ti lokotà ya bapaya, bizaleli malamu mpe bilei. Ezali esika ya malamu mpo na Castel Gandolfo mpe zingazinga na yango (na ndakisa na Albano Laziale). Bongo na bambula biye biùti koleka, motángo ya bato oyo bakomaki nkombo na yango ezali se kobakisama. Na 2021, mpo na kokundola mibu 53e ya bofungoli bwa yango, ezwaki reliki ya Saint Paul VI, oyo ebombami na chapel ya kati.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
