Luka

Ndako ya bibwele (crèche) ekundoli biso ‘te tozali kati na mobembo mwa lobiko

Na mikolo miye ya Noele, tradition ya ndako ya bibwele oyo ezali na bomoi ezali libaku ya kozongela «elembo kitoko ya esengo ya kozala moyekoli mwa Yezu, Nzambe oyo akómi moto». Pàpa ayambaki mokolo mwa poso na tongo na Vatikan bato ya eklezia ya Sante-Marie-Majeur yambo ya mobembo na bango ya mokolo mwa zomi na misato ya sànzà ya desembe.

Bansango ya Vatikan

 

Mokonzi moko ya basoda ya Roma, ekoti na ye ya motane, babateli ya mpate, Maria mpe Yozefu basimbi mwana moko: ezali mwa ndambo ya bato oyo bazali kosangana na mokolo mwa poso, mwa zomi na misato (13) ya Desembe, na molulu mwa mbotama ya mwana, na version ya vivante na Bazilika Sainte-Marie-Majeure na Rome. Pápa ayambaki bango na ndako monene ya losambo ya Saint-Pierre, elongo na Kardinale Makrickas, nganga-nzambe monene ya ekolo Libéria. Bazali kozongela “elóko Bakristu ba molongo mobimba” basalaka na boumeli bya bikeke. Bazali komonisa “Moto na moto, bilembo, na mimeseno ya bonkoko bwa ye, mpe na bisika ya mboka na ye”, lokola Léon XIV akanisaki yango.

Papa alimbolaki ‘te, Ndako ya bibwele ezali kopesa biso “likoki ya kobanda bomoi bwa sika na kolanda matambe ma Kristu”, “kobanda na mobenga ya Beteleme”. Lisapo lya mbotama na bilembo y abato bazali na bomoi mpenza “nà mabina ma yango, bilamba bya yango mpe miziki na yango, ekozala elembo ya esengo ya kitoko ya kozala moyekoli mwa Yezu, Nzambe oyo akomi moto”, ekobaki ye koloba.

Mpo na bato baye bazali bandakisa, ezali libaku ya solo ya kokóma “bato bamobembo ya elikya, bato oyo bazali kopesa libondisi mpe makanisi malamu na bato banso bakokutana na bango”, ezala bana mike to bakolo, “mpo na moto oyo, na motema mwa ye, azali na mposa ya kolinga mpe ya kolingama, mpe oyo, atako mikakatano mzali, azali kokoba kosala na mpiko mpe na molende mpo na kotonga “mokili mwa malamu koleka”, ndenge Léon XIV akanisaki.

Mobombamo mwa  Mbotama ya mboka Greccio
Mobombamo mwa Mbotama ya mboka Greccio

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

14 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 08:04