Mokambi ya ekólo Slovaquie na bokutani na Pápa
Nsango ya Vatikan
Pape Léon XIV ayambaki Peter Pellegrini, mokambi ya ekólo Slovaquie, na Palais apostoliki ya Vatikan, o mokolo mwa 4 Desembe. Nsima ya masolo ma bango, Prezida ya Slovaquie akutanaki na Kardinal Secrétaire d'État Pietro Parolin, elongo na Mgr Mihăiță Blaj, Secrétaire d'État mpo na boyokani na ba Étukà.
Masolo na biro ya secrétaire d’État
“Na tango ya masolo ma bango na Secretariat d’Etat, elobi liyebisi ya ndako ya bopanzi-nsango ya Saint-Siège, bayokanaki mpo na boyokani malamu oyo ezali kati na bikólo mibale, mingimingi mpo ya bokundoli mibù tuku mibale (25 ans) na mitano ya mokoloto oyo esalemaki kati na Saint-Siège mpe ya Républiki slovaque, mpe bamonisaki lisusu bomipesi na bango mpo na kosunga mpe kokolisa bomoko ya bato, kotombola bosembo mpe kobatela libota”. Liyebisi elobi lisusu ‘te “makambo ma mokili mobimba etalelamaki mpe, mingi mpenza etumba na Ukraine mpe lolenge yango ezali kobebisa likambo lya bokengi na poto, mpe ndenge makambo ezali kotambola na Moyen-Orient”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
