Luka

2025.12.24 Mosaïque ekelamaki na lisalisi lya artiste ya mboka Italie Alberto Salietti mpo na ndako ya ba Papa na 1955. 2025.12.24 Mosaïque ekelamaki na lisalisi lya artiste ya mboka Italie Alberto Salietti mpo na ndako ya ba Papa na 1955. 

Noele ya yambo ya kimya ya Leon XIV

Basanza nsambo sima ya ebandela yam osala mwa ye yabontoma, Pàpa azali komilengele mpo ya kosepela mpo ya mbala ya yambo, milulu mya Eyenga ya Mbotama ya Mokonzi. O mokolo moye ya misato na mpokwa, mwa 24 Desembe, ekozala na misa o kati ya bazilika Saint-Pierre na mboka Roma.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

«Noele ya Mokonzi ezali Noele ya Boboto». Prefecture ya Ndako ya Bontoma, ekundweli lisusu, makanisi ma motuya makasi ya Pàpa na ebandela ya mosala mwa ye. Asaleli maloba mana mpo ya kopesa malako malamu ya Eyenga ya Mbotàmà mpe mpo na Zubilé ya elikya. Maloba aponi, ewutaki na Sermon 26 ya Pàpa ya yambo, oyo wapi azweli nde nkombo : Leon le grand. Elilingi na yango ya lokasa lya yambo, elakisi Mosaique moko, ekelamaki na mosala ya artisteya mboka Italien, Alberto Salietti (1892-1961) mpo na Ndako ya bontoma na 1955.

Mokolo mwa mibale na mpokwa, Leon XIV, nakoyanola motuna ya bapanzi-nsango, ya Villa Barberini na Castel Gandolfo, asengaki na bato ba motema  bolamu, “bazwa ata mwa mokolo moko, ya boboto mpo nakosepela Mbotama ya mobikisi. ” Boboto boye «bokitisaka mpe bokokitisa».,Alobaki yango ut’o Loggia ya bobenisi, ya maponomi mwa ye lokola mokitani mwa Petro to Petelo.

Mokanda mwa malako malamu ya Pàpa
Mokanda mwa malako malamu ya Pàpa

Milulu mya Noele

Mokonzi ntoma monene azali komilengele mpo ya kosepela milulu mya Noele. Bobele o mokolo moye mwa misato na pokwa, mwa 24 Desembe, na ngonga ya 22 heures, akosala misa nabazilika Saint-Pierre, misa mya butu ya Eyenga ya mbotama ya Mokonzi. Bana zomi oyo bakozala nà fulele na maboko, bakotambola elongo na Pàpa na procession kino na Crèche ya Bazilika. Bato baùtaki Korea ya sudi; Inde, Mozambiko,Paraguay, Pologne mpe Ukraine

Lobi na yango, o mokolo mwa minei mwa 25 desembe, milulu mya misa ekozala na ngonga ya 10h, ekozala mpe nà bobenisi “Urbi et Orbi” na ngonga ya 12h na Loggia ya kati kati ya bazilika ya Saint-Pierre. Le 26 desembe Eyenga ya Santu Etienne, martiro wa yambo ya Eklezya, Tata Mosantu akosambela losambo la Angelus na esika ya Saint – Pierre; lolenge yoko nà mokolo mwa 28 Desembe. Mpo na kosukisa mobu 2025, o mokolo mwa misato, 31 Desembe, Pápa akosala likita lya bato banso mpe na nsima ya nzanga, na ngonga ya 17h, akosala milulu mya mpokwa ya liboso mpe Te Deum mpo na kozongisa matondi mpo na mbula moye moùti koleka.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

25 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 13:15