Luka

Likita lya banso ya mokolo ya misato 17 ya sanza ya zomi na mibale na esika Santu Petelo Likita lya banso ya mokolo ya misato 17 ya sanza ya zomi na mibale na esika Santu Petelo  (@Vatican Media)

Likita lya bansó:"Tozali ba masini te, kasi motéma mókó"

Libosó ya bandimi 20 000, na esika Sántu-Petelo, Léon XIV akobaki, o eleko ya likita lya bansó ya mokolo ya misáto 17 ya sánzá ya zómi na mibále, molongó ya matéya ya Zúbile ebonzami na Yézu-Kristu, elikya na bisó. Na mokolo ya misáto ya mbala ya isáto ya Adventi, na bomanyoli bókó na nkombo "Pasika lokóla nsinga ya motéma likoló", Papá abiangaki bandimi ya kotánga lisusu bomoi ya moto, esálema na mobulú pe bolembu, na mwinda ya Nsékwa ya Kristu.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Na bomoni 'te bomoi ya leló ekonzami na lombango pe liséngisi ya mbano ya noki, Papá atunáki motuná mókó ya ntina: "Loléngé nini nsékwa ya Yézu ekongengisa ndéngé eye ya zébi (expérience) na bisó?". Na motuná ena, boyambi ya mokristu ekopesa eyano lyokó polélé: "Tokozua bopemi. Tokozala goígoí te, kasi tokokota na bopemi ya Nzámbe, eye ezali boboto pe esengo". Po ya Léon XIV, bopemi ena ezali kaka elaká lyokó ekoya te, kasi bokási boko ekoki kobongola bomoi úto sik’oyo, o ntei ya mindondo ya mokolo na mokolo.

Sántu-Papá alobaki likámá lyokó ya bomoi etóndisami na makambo bebo biye, mosika ya kopésa esengo, bikosuka na kolembisa pe kobungisa. "Tokoyoka tolembi, na esengo te...Po na nini? Po tozali ba masini te, tozali na motéma mókó -to tángo mosusu, tokoki koloba, tozali motéma mókó", elobaki Papá. Motéma yangó, elimbolaki ye, ezali "elembo ya bomoto na bisó mobimba", esika wápi ba makanisi, ba pósá pe biyoki bikokutana. Na botáli Nsango-Ndamu ya sántu Mateo, Papá alobaki lisusu 'te "esika eloko na yo ya motúya ezali, waná motéma na yo ezali" (Mt 6,21).

Esika ya motúya ya sóló ezali Nzámbe Bolingo

Libosó ya bisika ya motúya ya lokuta biye bizali bomengo, elonga to bobakisi biloko, mingimingi "bikumbami na talo ya makila ya milio ya ba bomoi ya bato pe ya bobebisi bokeli ya Nzámbe", Léon XIV alobaki lisusu 'te esika ya motúya ya sóló ekoki kobombana kaka na motéma. Ezali bôngó na motéma nde tokobomba esika ya motúya ya sóló, na ba sandúku ya nkita te ya mabelé, na ba bokotisi misolo biye bizanga ndelo lokóla leló, elobaki Papá.

Na bokanisi sántu Augustin, alimboli motéma ya moto lokóla "inquietum", bobángi na hasard te, kasi po etindikami epái ya etindamelo ya súka eye ezali Nzámbe. "Pe bokangisi ya sóló ya motéma ezali ya kozala na biloko ebelé te, kasi ya kokoma na eye ekoki kotóndisa ye mobimba, elingi koloba bolingo ya Nzámbe, to malámu koleka, Nzámbe Bolingo", elobaki ye.

Elikya ya Pasika, eloko esimbi bomoi ya mokristu

Bokútáni ena na Nzámbe ekoleka na sóló na bolingo ya moningá. "Esika ya motúya (...) ezali kaka na bolingi moningá eye tokutani na nzelá na bisó", elobaki lisusu Papá, na bolobi 'te bokangemi bwa bato ya sóló ekosenga tángo mosusu ya kolembisa, kobongola botáli pe kútu ya kokamba lisusu bomoi na ye.

Na bosúkisi likita eye ya bansó, Léon XIV alobaki 'te "mókó te akoki kobika na bozangi motindo mókó ekoleka mosika na eye ekoki kosálema". Nsékwa ya Kristu ezali eloko makási esika wápi elikya ya mokristu evandi: "Motéma bobángi ekoyoka mawa te soki amipesi na mpiko ya bolingo eye ye akelamaka". "Bokangemi ezali ya sóló, bomoi elongaki pe na Kristu, ekokoba kolonga na ba liwa nionso ya mokolo na mokolo", esúkisaki ye, na bobengi bandimi ya kobenisa pe kotondo tángo insó Mokónzi po ya likabo ya elikya ena.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

22 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 08:56