Luka

Pope Leo XIV' na tangoya losambo la Angelus Pope Leo XIV' na tangoya losambo la Angelus   (ANSA)

Leon XIV abeleli Santu Etienne mpo ya baye bazali konyokwama na ntina ya boyambi bwa bango.

Na nsuka yalosambo la Angelus ya mokolo mwa 26 Desembe, mukolo bakundoli Martiro ya yambo na lisapo lya Eklezya, Pàpa asengi mosantu moye abondela mpo ya mangomba manyokwami o mokili mobimba. Ndakisa ya yé esalisa baye balingi kotiya boboto mpe boyokani kati na bato.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Liboso lya lininisa lya ndako ya bontomà, sima ya kotanga libondeli la Angelus mpe ya kokanisa na bato lisusu ntina ya liwa ya Santu Etienne, o kati ya lisoló ya bato, Pápa abéngaki bakristu na Esika ya Santu Petro mpo na kosenga ‘te bato banso bazala pene nà mangomba maye bakristu bazali konyokwama na ntina ya Boyambi bwa bango. Na bokundoli bwa Santu Etienne, martiro ya liboso ya boyambi, tozali kosenga lisungi na ye mpo ‘te alendisa kondima na biso mpe asunga bato bazali konyokwama mpo na litatoli na bango ya kozala mokristu.

Léon XIV allingaki ‘te, “ndakisa ya ye ya boboto, ya mpiko mpe ya bolimbisi elanda bato banso bazali kosala na bisika ya matata mpo na kolendisa masolo, boyokani mpe kimya”. Maloba maye mazali koganga ut’o mateya ma yé ya Eyenga ya Mbotama to Noele ( à son message de paix du jour de Noël). “Tosengi na Mwana wa Beteleme apesa kimia mpe libondisi na baye banso bazali konyokwama bitumba oyo ezali koleka na mokili. Mingi mpenza oyo babosani, mpe na baye banso bazali konyokwama na ntina ya kozanga bosembo, ya mobulu ya politiki, ya minyoko ya mangomba mpe ya bobomi”. Ezali bongo losambo la Tata Mosantu, yambo ‘te apesa bobenisi bwa ye ya kati yaki ya engumba mpe libanda o mokili mobimba (Urbi et Orbi).

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

26 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 13:35