Eklezia ezali kokweisa makasi likambo ya kotelemela Bayuda, Pápa ayebisi mokonzi ya ba-Israël
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Mokambi ya Israël abengaki Pape Léon XIV na nsima ya nzanga ya mokolo mwa misato, eyebisi ndako ya bopanzi sango ya Ngwende Esantu, «na ntina ya feti ya Noele mpe feti ya Bayuda ya Hanukkah». Lisoló yango lisalemaki nsima ya masasi oyo ebetamaki na engumba Sydney, epai wapi tata moko mpe mwana na ye ya mobali babundisaki Bayuda mingi oyo bayanganaki na libongo lya Bondi. Bazalaki kosepela mokolo mwa yambo ya elambo wana ya ntina mingi. Mpamba te, mpo ya Bayuda, ezalaki kokundwela elónga ya Yuda Makabe likoló na boyangeli ya Antiochos IV na ekeke ya mibale, oyo epesaki nzela na kozongisama ya losambo kati na tempelo ya Yeruzaleme.
Bobangi bwa mangomba ma ba Yuda
«Na ntina ya bobomi ya ba terroristes na Sydney» oyo ebomaki bato zomi na mitano (15) mpe bato tukù minei (40) bazokaki, Pápa azongelaki «mokano makasi ya Eklezya Katoliko oyo ekokweisi lolenge inso ya anti-semitisme, oyo ezali kokoba kotia kobanga na kati ya ba mangomba (communautés) ya bayuda mpe na kati ya bato ba mokili mobimba», elobi liyebisi oyo ebimaki na ndako ya bapanzi sango ya Ngwende Esantu, na mpokwa.
O mokolo mwa yambo, Pàpa asilaki kokweisa mbala mibale mobulu ya Bayuda (Lundi, le Pape avait déjà, à deux reprises, condamné la violence antisémite,). abengaki bango na “kolongola boyinani ya mitema na biso”. Atindaki nsango (telegrame) na Anthony Fisher, episkopo-mokonzi ya Sydney, mpo na komonisa ‘te “azali penepene na ye na molimo”. Mpo na “bato banso bazwami na likama ya mobulu oyo ezangi ntina”, “na elikya ya sika ‘te baoyo bamekamaki na mobulu bakoki kobongola mitema mpe koluka nzela ya kimya mpe ya bomoko”.
Kosala mpo na kimya na Gaza
O mokolo mwa misato, na bokutani kati na Léon XIV mpe Mokambi Herzog, Pàpa azongelaki lisusu maloba ma ye ya “kotia molende na misala ya kimya oyo ezali kosalema na etuka eye”, mpe alobelaki lisusu ntina ya “kokolisa mpe kokoba” misala mya lisungi lya bato.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye
