Luka

Bobenisi Urbi et Orbi ya Eyenga ya Mbotama : «Pàpa akundweli lisusu ‘te : Boboto ezali likambo lya mokumba»

Na nsango na ye ya Eyenga ya Mbotama, apesaki o mokolo mwa minei, ut’o Basilique Saint-Pierre, Pápa alobelaki bitumba nziké bizali kobebisa mokili. Na esika ya kokweisa basusu, soki moto na moto andimi nayino masumu ma yemei mpe asengi Nzambe bolimbisi mpe lolenge yoko amitye na esika ya baye bazali konyokwama, to ya baye balembi mpe baye bazali konyokola, mbele mokili ebongwanaki.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Atako mbula ebetaki makasi na Rome, bankoto ya bakristu bayaki na Place Saint-Pierre mokolo mwa minei mpo na koyoka Papa mpo na Eyenga ya Mbotama mpe kozwa bobenisi bwa ye Urbi et Orbi, mpo na engumba mpe mokili mobimba. Mpo na mbala ya yambo ut’o aponamaki o mokolo mwa 8 sanza ya Mayi, Pàpa ya Amerika amataki na loggia ya Basilique Saint-Pierre mpo na kopesa bobenisi oyo elakisamaki na mondovision, mpe na nsima, apesaki malako malamu na bankota zomi.

Tata mosantu alobelaki nsango ya Mbotama, Kristu Mokonzi atindami na tata mpo ya kosikola to kobikisa biso na lisumu mpe liwà ; yé nde azali boboto bwa mokili. «Na mbotama ya Yezu, esi ekomamaki moboko moye ekotambwisa bomoi mobimba ya Mwana wa Nzambe, kino na liwa lya ye na ekulusu: ezali kopona nzela ya kotika biso te tomema bozito bwa masumu, kasi ya komema yango Ye moko mpo na biso, mpo na komema mokumba na yango».

Nzela ya Boboto, to kotiya kimya, ezali Kotya kimya ezali lmokumba ya moto yemei

Boyei bwa « nkumu wa boboto » bozali bosenga mpo ya moto na moto. Mo na Pàpa Leon XIV, nzela ya boboto ezali komizwa mokumba. “Soki moto na moto, na esika ‘te akwiyisa moninga, andimi liboso mabe ma yé, mpe lolenge yoko, amitye esika ya baye bazali konyokwama, to ya baye balembi mpe baye bazali konyokola, mbele mokili ebongwanaki”.

Kristu alongoli biso na boombu bwa masumu mpe “alakisi biso nzela ya bomoi mpo tolonga matata, mikakatano minso, ya moto mpe ya mokili mobimba. Soki motema alimbami te, mpe eyebi kolimbisa te, to koki kozala basi to babali ya boboto sokimoke te, batongi bya kimya te” .

Mpe lokola limeseno, Papa alakisaki bozalani pembeni na baye banso bazali na mpasi, mikili miye mizali na matata, lokola Moyen-Orient, epai wapi aùti kozala kala mingi te na mobembo. Leon XIV alobi te ayembi mpe ayoki mpasi mpe bobangi bwa bango. Bazangi bokasi, liboso lya makambo mingi ya bokonzi, oyo elekeli bango.  

Ut'o Loggia ya BAzilikki ya Saint-Pierre, Pàpa Apesi mbote na bakristu , o mokolo mwa 25 désembe 2025
Ut'o Loggia ya BAzilikki ya Saint-Pierre, Pàpa Apesi mbote na bakristu , o mokolo mwa 25 désembe 2025   (@Vatican Media)

Losambo mpo na Ukraine, RDC, Haïti

Episkopo wa Roma, bwaki mbela mpe alobi ‘te, tozali kobelela Mwana wa Beteleme mpo na «Bosembo, boboto mpe kimya na Palestine, Liban, Israel mpe Syrie». Losambo mosusu mpo na bikolo ya Europa mpo na mosala bazali kosala elongo o kati ya mangomba ma bango, mingi mpenza mpo na Ukraine, mpo te makelele ma mandoki mozima nye, mpe basila koluka nzela ya masolo ya solo mpenza, mpe ya limemya.

Akanisaki mpe mikili ma Afrika, oyo mingi mpenzabazali kobosana matata ma bango. Pàpa asengaki losambo mpo ya baye banso bazali konyokwama mp ona bozangi bosembo, bozangi kimya ya mopelengano to politiki, ya bonyokoli na nzela ya boyambi, mpe ya ba terrorisme. Atangaki nkombo ya Soudan, Soudan ya Sudi, Mali, Burkina Faso mpe Repibliki Demokratiki ya Congo.

Tosambela Nzambe oyo akomi moto, mpo na bato ba Haiti, mpo te matata manso masila o kati ya ekolo ena; bongo ekola na nzela ya boboto mpe ya boyokani”. Alendisaki mpe mpo na biloko bisusu ya mabele ma Asia, lokoa Birmanie, Thailande mpe Cambodge

 Bato ba Gaza mpe baluki-mboka oyo bazali konyokwama

Nakokanisa bolembu bwa mwana-abotami sika ya Noele, Pàpa akundoli na bato ‘te, Yezu akokani na meko na moko ya biso mpe akokani na mitungisi ya moto. “Atangi baye babungisi biloko babangi binso na bitumba na Gaza, baye bazali konyokwama nzala, baye bazali kokima bamboka ba bango, bato ba Yemen oyo bazali kokufa nzala me bobolà, baye babungisi misala mpe bazali koluka mosusu, bato baboloko, baye bazali na likambo ezangi bomoto”.

Pàpa Leon XIV abyango basembwi to bakristu : “Bafungola mitema mya bang ona na bandeko babango ya basi mpe babali, oyo bazali kati na bosenga mpe kati na mpasi”. Asukisaki na koloba ‘te:“Mbotama ya Yezu ezali mbotama ya boboto”. Akanisi n abato ‘te, na mwa mikolo, ekozala bosukisi bwa mbù mwa Zubilé, kasi elikya “ekotikala sé libela na biso. Apesaki mbote ya nsuka n abato, na bankota ndenge na ndenge, mingi mpenza na Lifalansa, lingelesi, espagnol, chinois, arabe mpe bongo na bongo.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

25 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 21:06