Luka

Angelus ya Immaculée: lokola Maria, loba «iyo» na etindà mokonzi aponi

Liboso ya losambo la Angelus, Pápa Léon XIV azongelaki lisusu Evanzile ya mokolo mwa 8 Desembe, mokolo moye Eklezya ekumisaka eyenga ya Maria abotami na mbindo te (Immaculée Conception). Na ndakisa “iyo”ya Maria, tango Anzelu Gabiliele asangelaki ye Nsango Elamu, Tata-Mosantu abyangaki bayambi na kopesa “boyambi ba bango na motema mobimba” na etindà moye Mokonzi abyangi bango.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Ntango Pápa Léon XIV azalaki koloba na ebele ya bato bayanganaki na esika babengi Place Saint-Pierre, na nse ya moi ya eleko ya malili makasi, abetaki nsete na likambo lya esengo oyo eutaki na mokano mwa Nzambe mpo na Malia. "Tata wa likoló alingaki ‘te ezala “na litono ya lisumu ya ebandela te”. Alobelaki nde liteya oyo Pápa Pie IX abimisaki na mokolo mwa 8 Desembe ya mobù 1854.

Mokonzi apesaki na Maria ngolu ya kokamwa ya motema peto mpenza, mpo na likamwisi lisusu ya monene koleka: kobotama ya Kristu Mobikisi na mokili lokola moto”.  Episkopo ya Roma akóbaki na kotángá eteni ya Evanzile ya Santu Luka (Luka 1, 31-33) oyo ezali kolobela Nsango ya Anzelu-mokonzi Gabiliele epai ya Maria: “ na kokamwa, Ngondo Maria ayokaki nà bomikitisi nyonso Nsango ena, na lisalisi ya mbote anzelu apesaki ye: “Mbote, yo oyo otondi na ngrasya, Mokonzi azali na yo elongo”. (eteni ya 28), mpe na boyambi nyonso ayanolaki ‘te: “Moombo mwa Mokonzi ngai oyo, tiká ‘te esalema epai na ngai lokola elobi yo”. 38).

Bakristu bayiké basangani na esika Saint-Pierre
Bakristu bayiké basangani na esika Saint-Pierre   (@Vatican Media)

Na nsima, Pápa ya ba-Augustin azongelaki maloba ma episkopo ya Hippone na ntina ya eteni enà ya Evanzile: “Maria andimaki mpe oyo ye andimaki ekokisamaki epai ya ye” ( Sermo 215, 4). Tata Mosantu alimbolaki ‘te, “likabo litondi na ngolu, kati na elenge mwasi ya Nazareti, eboti mbuma na yango mpo andimaki yango na bonsomi bwa ye bonso, na koyamba mokano mwa Nzambe”. “Nkolo asalaka ntango nyonso bongo, apesaka biso ebele ya makabo, kasi atikaka biso tópona soki tokondima yango to te”. O mokolo moye mwa 8 sànzà ya zomi na mibale, mokolo moye Eklezya ezali kosepela Eyenga ya Nkumbama ya Maria ezali na lisumu te, Pápa abyangi bakristu, bango mpe bándima, “lokola ye andimaki”, ba pesa “na motema mobimba”, boyambi bwa bango, na mosala to etindà oyo Mokonzi azali kobenga bango.

Likabo lya Batisimo

Wana azalaki komonisa bonene bwa « likabo lya Nkumbama ya Maria ezali na lisumu te, (Immaculée Conception) », Pápa alobelaki bokokani na yango nà likabo lya batisimo. Ezali tango oyo «basukoli biso na lisumu ya ebandela, tokómi bana ba Nzambe, efandelo ya ye mpe tempelo ya elimo ya ye». «Eyano iyo ya Mama ya Mokonzi ezali likamwisi, kasi oyo ya biso ekoki mpe kozala bongo lokola. Kasi soki tozali kozongisa yango sika mokolo na mokolo na bosembo bonso, na botondi, na komikitisa mpe na molende, na mabondeli mpe na misala mya bolingo», mpo ‘te «Yezu ayebana, andimama mpe alingama na bisika binso mpe mpo ‘te libiki lya ekomela bato banso».  Tata Mosantu asukisaki ‘te: “Tosenga yango lelo epai ya Tata, na bolobeli bwa nkumbama ya Maria ezali na lisumu te, na tango tozali kosambela elongo na maloba maye yemei andimaki liboso”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

08 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 20:02