Luka

Angelus : Pàpa abyangi mabota na kokoma “mwinda mwa elikya” o kati ya mokili.

Na malendisi ma ye, na ntango ya losambo la Angelus, o mokolo mwa lomingo 28 Desembe, feti ya Libota Lisantu, Léon XIV akesenisaki likanisi ya bobángi mpe ya bokonzi na likambo la bolingo mpe ya bokabi. Na yango, Pápa alendisaki mabota ma bakristu ‘te bátika te ‘te «miloli mya bolingo» ekufa. Mpe asengaki bango ‘te báboya mobulu mpe makambo ma lokuta ya mokili mwa lelo.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

O mokolo mwa lomingo 28 Desembe, na ntango ya losambo la Maria, na lininisa lya ndako ya bontoma ; oyo ezali likoló lya Esika ya Santu Petro, Pápa atángaki mikapo ya Biblia ya mokolo mwango, kobanda na lisolo ya «kokima na Ezipiti».

«Elilingi ya Noele oyo ezali kongenge» mpe elili ya somo ya likama ya liwa

Na nsima, Pápa alobaki ‘te likambo lina esukisaki esengo ya Noele na mbalakaka. Alimbolaki ‘te, na mbala moko, mwinda mwa ndako ya bibwele ekómaki na molili ya likama, oyo Nkumu Erode abotisaki. Lokola azalaki kobanga ‘te akobungisa bokonzi bwa ye nsima ya nsango ya mbotama ya “mokonzi ya Bayuda”. Erode azali moto, “moto mabe” mpe “mobomi-bato” mpe “moto oyo abangaka mingi”, “apesaki mitindo ‘te báboma bana banso ya mike bazalaki na mbula ya Yesu”. Nzokande, nganga Nzambe monene ayebisaki ‘te ezali kati na bokonzi bwa ye nde “Nzambe asali likamwisi eleki monene kati na lisoló ya bato. Kati na yango bilaka binso ya lobiko ya kala bikokisami”. Kasi akokaki komona ye te, mpo ‘te azalaki na bobangi ya kobungisa kiti na ye ya bokonzi, bomengo na ye, lokumu na ye.

Libota Lisantu - Eyano ya Nzambe na ntembe ya bokonzi

Liboso lya “mobulu oyo ezangi ntina”, Libota lisantu emonisani lokola elembo oyo ekeseni mpenza. Kati na mokili oyo etondi na bobangi mpe lokoso, Maria, Yozefu mpe Mwana Yezu bakomi, engebene na Papa, “zàla mpe esika ya mbotama ya eyano bobele moko ya lobiko”.  Na ndakisa, Biblia elobi ‘te: “Nzambe azali bolingo, mpe akopesa te moto oyo ye aponi eloko moko oyo eleki malamu”. Likambo ya Joseph, oyo atosaki mongongo mwa Mokonzi, ebikisaki Mwasi mpe Mwana, emonisami awa na ndimbola ya bosikoli ‘te, na Ezipeti nde mobikisi akolelaki o kati ya “moto ya bolingo ya libota”.  Bongo biso tosopeli mobombamo monà na botondi. Tokanisa mabota ma biso mpe mwinda ekoki komema o kati ya societe epai wapi tozali.

“Bongo biso tosopeli mobombamo monà na botondi. Tokanisa mabota ma biso mpe mwinda ekoki komema o kati ya societe epai wapi tozali.”

Ba Erodi ya Mikolo mya biso

Mokitani ya Petro alobi yango ‘te, “Mokili mwa lelo motondi na ba Erode, baye balingi sé kolonga, balingi kaka bokonzi ya bozui mpe ya mpamba ekowumela te”. Bongo sima ya bango se bokabwani, mawa mpe matata. Yango wana Papa asengi na mabota ma bakristu, baboma “mwinda mwa bolingo te” kasi Tóbatela kati na yango mabongi ma Nsango Elamu: “losambo, kosangana na basakramento - mingi penza koyambola masumu mpe lisanga - bolingo bwa solo, masolo ya solo, bosembo, bosolo mpe kitoko ya maloba mpe misala ya malamu ya mokolo na mokolo. Sé bongo, Ekopesa bango mwinda mwa elikya mpo na bato oyo tofandi na bango, mateya ma bolingo mpe bisaleli bya lobiko na maboko ma Nzambe”.

Lisambo mp ona mabota manso

Mpo na kosukisa, Papa apesaki mabota manso ya mokili mobimba na bolobeli bwa Ngondo Maria mpe ya Santu Joseph. Basenga na Tata ya Lola apambola bango mpo ‘te bakoka kokola na elilingi ya libota lya Nazareti mpe bakoma mpo na bato banso “elembo ya nguya ya kozala na ye mpe ya bolingo na ye monene”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

28 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 20:30