Lycée ya Kebbi, na Nigeria, epai wapi bakangaki bilenge bana ya basi tuku mibale na mitano (25). Lycée ya Kebbi, na Nigeria, epai wapi bakangaki bilenge bana ya basi tuku mibale na mitano (25). 

Pàpa asengi bonsomi ya bakristu baye bakangaki na Nigeria mpe Cameroun

Liboso lya kosala losambo la Angelus o mokolo mwa lomingo, Tata Mosantu asengaki ‘te bana-kelasi, basango mpe bandimi na mikili mibale ya Afrika babimisa bango na lombango. Alobaki ‘te «ayoki mawa mingi» mpe azalaki na mposa ‘te bandakonzambe mpe biteyelo etikala «ntango inso mpe bisika binso» bisika ya libateli.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Liboso lya kosala losambo la Angelus o mokolo mwa lomingo, liboso lya bakristu pene na nkoto tuku motobà (60 000) oyo bayanganaki na esika Saint Pierre, Pàpa abwakaki mbela makasi mpo na kosenga bonsomi ya bato baye bakangaki kala mingi te na Nigeria mpe na Cameroun, oyo mingi na bango bazali bilenge ya kelasi, basi mpe bana mibali. Na mawa mingi nayokaki nsango ‘te bakangi basango, bakristu mpe bayekoli na Nigeria mpe na Cameroun. Na sima ya misa, Pàpa abimaki na lopango lya basilika, mpo na kosukisa zubilé ya bayembi.

Leon ya zomi na minei alobi ‘te “ayoki mpasi mingi, mingi mpenza mpo na ebele ya bilenge bana mibali mpe ya basi oyo bakangi, nà mpe mabota ma bango bazali na bwalé”.  Abwakaki mbela makasi mpo ‘te batika noki na bonsomi baye bakangaki. Alendisaki bakambi bazali na mokumba na kokata likambo liye noki noki mpo babimisa bango.

NtangoPàpa abimaki na Castel Gandolo o mokolo mwa mosala mibale (mardi), batunaki ye mp ona likamb’ango, Pápa asilaki komonisa bobangi bwa ye mpo na makambo oyo mazali koleka na Nigeria. “Nakanisi ‘te na Nigeria mpe na bisika bisusu, likama ezali mpo na bakristu mpamba te, kasi mpo na bato banso; bakristu mpe ba musulmans babomamaki. Terrorisme ekangami na nkita ya bitumba mpo na kokonza bitúká. Ezali mawa mingi, mpamba te, bakristu bayike bakufaki, mpe na kanisi te, ezali na ntina ‘te mbulamatari mpe bato banso basala makasi mpo na kotombola bonsomi ya solo ya losambo”. Pàpa alimbolaki bongo na bapanzi-nsango.

Bakristu bazali kokutana na mobulu mpe kokangama na makasi

Pàpa asengaki na nsuka ‘te «tobondela mpo na bandeko ba biso mibali mpe basi, mpe ‘te banda-konzambe mpe biteyelo ezala bisika binso mpe bipai binso, bisika ya libateli mpe ya elikia». Na mikolo mileki, mobulu na ntina ya Bakristu na Nigeria emataki makasi, mpe etindaki Président Bola Tinubu atika mobembo na ye na Afrika ya Sudi mpe na Angola mpo na kolanda ndenge makambo mazali kotambola.

Association chrétienne ya Nigeria (CAN) elobaki o mokolo mwa 22 ya sanza ya zomi na moko ‘te bato basimba-mandoki bakangaki bana nkama misato na zomi na mitano (315) ya kelasi mpe balakisi ya eteyelo moko ya katoliko na westi ya mboka, nsima ya likambo ya ndenge moko oyo esalemaki epai ya bilenge basi tuku mibale na mitano (25) na ebandeli ya poso eye, na eteyelo moko na ngambo ya Nordi-westi ya Kebbi.

Na Abudja, Bakristo batelemi mpo na mobulu to kobomama. Elilingi ya Kala.
Na Abudja, Bakristo batelemi mpo na mobulu to kobomama. Elilingi ya Kala.   (AFP or licensors)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

24 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 11:33