Luka

Na sanza ya Desembe, Pápa akobondela mpo na bakristu bazwami na bitukà ya bitumba

Bilili ya Réseau Mondial ya losambo la Pàpa, oyo ebimaki o mokolo mwa misato 26 Novembe, ezali kolakisa mikano mya Pàpa mpo na sànzà ya zomi na mibale. Pápa abalolaki miso mya ye epai ya ebele ya bato oyo bazali konyokwama na bisika ya bitumba, mingi mpenza na Proche-Orient. Léon XIV abondelaki ‘te, ata o kati ya mpasi, bátika te komona boboto bwa Nzambe mpe bozali pembeni ya Eklezya ya mokili mobimba.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Ndako-nzambe ya Sainte-Famille ezali lokola bandako-nzambe bisusu mingi. Bandimi bazali kobondela, bana bazali na maboko ma baboti ba bango. Makelele makasi ya bombi moko ezali kopusana, ebeti makasi mpenza, bongo esukisi likambo lya losambo lango. Moke ya bamisile ebetaki na ndako-nzambe moke ya Latin na Gaza mpe ebetaki yango na mokolo ya 17 ya sanza ya nsambo. Ezali na bililingi oyo nde video ya sika ya Pàpa Léon XIV ebandi, oyo ezali na maloba ma losambo mpo na “bakristu oyo bazali na bitumba”, mingi mpenza na Moyen-Orient.

Na video oyo, ebimisami o mokolo mwa 26 ya sanza ya zomi na moko, na nzela ya Réseau Mondial ya Losambo la Pàpa, na boyokani elongo nà Vatikan Media, na mokolo ya liboso ya mobembo ya ntoma Léon XIV na Turquie mpe na Liban, Pape asengi bato babondela mpo ‘te bakristu bazali na bitumba to na matata, bazala ba nkisi ya kimya(boboto), ya boyokani mpe ya elikya.

Ya solo, libondeli ezali te kosenga Nzambe asilisa matata. Azali kosenga “Nzambe ya boboto (kimya)” ‘te, “ata o kati ya mpasi, bakristu bákotika te “komona boboto bwa Nzambe mpe mabondeli ya bandeko ba bango ya mibali mpe ya basi na kati ya boyambi”.

Sango  Gabriel Romanelli, Sango-Mokonzi ya Sainte Famille na Gaza, asali misa .
Sango Gabriel Romanelli, Sango-Mokonzi ya Sainte Famille na Gaza, asali misa .

Mboto mwa boboto kati na bitumba mpe mobulu

Na losambo la ye, Léon XIV asengi ‘te «o kati ya bitumba mpe mobulu », bakoma «mbuma ya boyokani, batongi ya elikya, na misala ya pete mpe ya minene, oyo bakoki kolimbisa mpe kokende liboso». Bazali na mposa ‘te, na boyokani na Nzambe mpe na boyokani na bandeko ba bango, báyeba ndenge ya kolongola bokabwani, kokata boyokani, mpe koluka bosembo elongo na motema ngolu.

Na Yesu, oyo abengaki «ba-esengo » bazali baye bazali kosala mpo na boboto (kimya). Pápa asengi ‘te moto na moto «akóma esaleli ya kimya, ata na bisika biye boyokani ekoki kozala te». Léon XIV abelelaki Elimo Santu mpe asengi na ye asunga «boyambi ya baye bazali konyokwama» mpe alendisa elikya na bango, likolo na nyonso. Elimo atika te ‘te tokweya na kozanga kotiya likebi na baninga» mpe ‘te tokoma «batongi ya bomoko», lokola Yesu.

Bililingi ya Pàpa na Desembe etalleli makambo ma "matata to ya mobulu "
Bililingi ya Pàpa na Desembe etalleli makambo ma "matata to ya mobulu "

Bakristu na Proche-Orient

Lapolo ya 2025 mpo na bonsomi ya losambo, oyo ebimisamaki na mokolo mwa 21 Okotobe ya mobu oyo eleki na fondation ya Pápa mpo na kosalisa baeklezya biye bizali na mpasi, elobaki ‘te bitumba oyo ezali kosalema na Moyen-Orient mpe mikakatano ya nkita mpe ya bomoi ya bato ezali kosala ete baeklezya ya mike, mingimingi ya bakistu, ezala na likama. Na Palestine, nsima ya mbula mibale ya etumba, bandakonzambe mingi ekómaki bisika ya kobombama mpo na mabota oyo mazangi ndako, mibange mpe bibosono (handicape). Na Liban, nkita ya mboka ezali kobeba makasi mpe yango ezali kotinda bankóto ya bato, mingimingi bilenge, bákende kofanda na bamboka bisusu, mpe yango ezali kokomisa na bobola, biteyelo mpe baparwasi na bango. Na Syrie mpe na Irak, bozongeli kotonga ezali kotambola malamu te, mpamba te, ezali na kati ya makambo ya politiki oyo ezali kozanga libateli mpe kozanga elikya mpo na bilenge.

Pàpa azali komitungisa mpo na minyoko ya bakristu

Mokambi ya fondation ya losambo lya Pápa na mokili mobimba alobi ‘te: «Likambo lya bakristu na bisika ya bitumba ezali tango inso na motema ya mokitani ya Petro». O kati ya mokanda mwa ye, Sàngo Cristóbal Fones alobi ‘te: «Na boumeli ya bambula, mbala na mbala, Pápa François abondelaki mpo na minyoko mpe litatoli ya bakristu bazali na bomoi ya mpasi mpo na eklezya ya mokili mobimba». Na kati ya mokanda mwa ye, tata Cristóbal Fones alobi ‘te: Pape ya Argentine amemaki mpasi na bango na motema na ye mpe asengaki mbala na mbala losambo mpo na Bakristu baye bazali konyokwama na sanza ya misato ya mobu 2017, mpo na masolo mpe boyokani na Moyen-Orient na sanza ya zomi na moko ya mobu 2019, mpo na mangomba oyo bazali konyokwama mpe bazali kozwa etumbu na sanza ya yambo ya mobu 2022 mpe mpo na ba martyro ya sika, batatoli to banzeneneke ba Kristu, na sanza ya misato ya mobu 2024. Na nzela ya video oyo, mpo na Sango Fones, Pápa Léon XIV azwi libula yango mpe azali kokoba na yango.

Ekutani bongo na ntango oyo azalaki kosala mobembo mwa ye ya liboso na Turquie mpe na Liban, asengaki bakristu ya Palestine, ya Liban, ya Syrie, ya Iraq, mpe ya mikili misusu ‘te bábondela mpo na bango.

Kati na molulu mwa Jubilee, video ya Pápa ezali na ntina mingi, mpamba te ezali komonisa makanisi mya mabondeli oyo Pápa monene azali na yango na motema mwa ye: kobondela mpo na makanisi ndenge moko na oyo ya episkopo Roma ezali libyangi to mbela mpo na kozwa ngolu ya bolimbisi masumu ya Zubile.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

26 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 20:49