Likita lya bansó: bondeko ya mokili, mwa mokólótó ya bokristu
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Kondima liwa pe nsékwa ya Kristu ezosálisa kolinga pe koleisa bondeko, "yoko ya mabakú minene ya bomoto ya eleko eye". Na bobandi na likambo ena, Papá Augustin alobaka lisusu boni boni na bozángi boyokani, tokoki kobika te, kokola te, koyékola te. "Soki tomikangemi na bisó mókó, tokoki kobela bozali yo mókó, pe atá bomiluli yo mókó koleka eye akanisaka basusu te po ya mbano", elimbolaki ye, na boyoki mawa 'te mosusu akitisama "na moto mókó oyo akoki kobenda litómbá na ye", tobongami mpenza te ya kopesa, " ya komipesa bisó mókó".
Kotóka na maziba ya Kristu
Na bomoni 'te leló bondeko ezali "noki" te, bitumba mingi bikotatola yangó, bowelani na bato pe mayóki (sentiments) ya boyini, kasi Papá atikali na kondima 'te ezali "ndóto yoko kitoko ekoki kosálema": "ezali pósá yoko ya mwá bato bakolota te". Alendisi, po ya kolonga bililingi biye bikobangisa yangó, ya "kokende na maziba", pe mingi "ya kotoka mwinda pe bokási epái ya Oyo ye mei akobimisa bisó na ngenge ya bongúná"
Bondeko ekobimisa na bokabwani pe na lizimbi (abus) ya bokónzi
Pe episkopo ya Roma ya kozongela lisusu 'te "ndeko mobáli" ewuti na liloba lyoko elingi koloba kobátela, kozala na yangó na motéma, kosunga pe koleisa. "Tokanisi mingi 'te mosála ya ndeko mobáli to ya ndeko mwási ekozongisa na mbotela (parenté), na likambo ya kozala bandeko, ya kozala na libotá lyoko. Na bosóló, toyébi malámu ndéngé nini bokeseni, bokabwani, tángo mosusu kútu boyini, bikoki koboma boyokani káti na babóti, pe kaka káti na bapaya te", ekobaki Léon XIV, na bokanisi losako ya sántu François ya Assise: omnes fratres -bansó bandeko, Papá François azongelaki yangó simá ya mibú 800 na encyclique Fratelli tutti.
"'Nionso' eye, elingaki koloba po ya sántu François elembo ekoyamba bondeko mókó ya mokili, ekobimisa bondeko mókó ya mokili, ekoloba mwá mokólótó ya bokristu, eye úta ebándeli ezalaka nsakola ya Nsango Elamu ebongisama po ya libiki lya bansó, pe atá sóki moke te na loléngé ya kobombana to ya moto ye mókó", esémbolaki Papá wa Roma, na bozongeli maloba ya Kristu na Nsango Elamu ya Yoane 15,12: "Bolinganaka bino na bino lokóla ngai nakolingaka bino".
Ya sóló, Mokitani ya Petelo alaki 'te bondeko epesami na Kristu akufi pe asékwi ekobimisa bisó na "makanisi ya mabé ya bongái, ya bokabwani, ya lizimbi ya bokónzi", pe ekozongisa bisó na bobéngami na bisó ya ebándeli, "na nkombo ya bolingo mókó pe ya elikya yoko biye bikozonga sika mokolo na mokolo".
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye
