Luka

Angélus: «Nsekwa ya Yezu o bawà engengisi nsuka ya moto moko na moko»

Kati na malendisi ma ye na ntango ya losambo la «Angelus» o mokolo mwa lomingo loye la 2 Novembe, mokolo bakokundola basembwi oyo bakufa, Pápa amonisaki ‘te molulu monà «mokopusa biso lisusu pene na libombami». Alobi ‘te, “Nzambe, alingi abungisa ata moto moko te. Motema mwa biso eyebi mposa enà ya yé, ntango inso liwa ezali komonisa lokola elongola biso mpo na libela mongongo, elongi, mokili mobimba”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

O mokolo moye molandi mokolo mwa Basantu banso, lokola ezali momeseno ya mbula na mbula, Eklezya ekundolaka basembwi Bawà, mpe ekumisaka bango na mabondeli.  “Bakristu ya Katoliko bakanisaka ntango inso bawei na Ukaristya inso, mpe kino lelomei, bakosenga ‘te bandeko ba bango bakufá bátángama na libondeli ya Ukaristya”. Papa alobi ‘te mpo na esakola enà, “ebotami elikya wapi moto soki moko te akobungisama

Tata Mosantu alobi na tango ya losambo la Angelus na esika Saint-Pierre ‘te: Mposa eye ya Nzambe, ya linga soki moke te kobungisa moko ya bato, to yebi yango na motema mwa biso, tango inso liwà ezali komonisa lokola elongola biso mpo na libela mongongo, elongi, mokili mobimba”.

Kokundola mpe bozeli

“Mokolo mwa lelo, ezali mokolo moye mozali kotuna makanisi ma bato, ezali na motuya mingi mpe ezali mpasi mpe mawa » . Papa alingi ‘te bavizite na lilita ya mokolo ya 2 Novembe, “ezala mpo na biso banso libyangi ya bokundoli mpe ya kozela” lokola esengi na losambo ya Credo: “na zali kokela nsekwa ya bawà mpe bomoi bokoyà nsima”. Pàpa amonisi nsekwa ya Kristu, na ebandela ya sànzà eye, eleko moko ya motuya mpenza. Yango nde engengisi nsuka ya bomoi ya moko na moko kati na biso. Nzambe alingi soki moke te ‘te moto ata moko abungama mpo na libela, kasi alingi nde moto na moto azala na esika na ye mpe angenge na bomoko bwa ye, lokola alobi yango na yoane (Jn 6, 39).

Lolakà louti na mikolo mizali koya

Mokitani mwa Petro akanisi na bato lisusu ‘te: Nzambe abosanaka moko te ya bana ba ye. Bongo akobi ‘te, kati na makanisi ya Yesu, “ata bato oyo bayebani lisusu te, ata baye emonani lokola ‘te basili kolimwa na lisoló ya bato, bazali komonana na lokumu na bango ya seko”. Tata Mosantu abengaki na “kokanisa mikolo mizali koya, kofungwama te na makambo ya kala, na mpinzoli ya mawa". Na nsima, abakisaki ‘te: “Tozali mpe na kati ya bomoi ya lelo te, lokola nde tozali na kati ya lilita”.

Léon XIV abondelaki mpo ‘te «mongongo mwa Yesu oyo eyebani mingi ekoma epai na biso, mpe ekoma epai ya bato banso, mpo ezali bobele yango nde euti na mikolo mizali koya». Mongongo mwango, elendisi biso, ebengi biso na nkombo, ebongisi esika mpo na biso, ebikisi biso na mayoki ya kozanga nguya oyo ekoki komema biso na kotika bomoi. Mpe Maria, “mwasi mwa mokolo mwa poso esantu”, azali koteya biso lisusu kozala na elikya”.

Elambo ya Basantu banso: lisanga ya bokeseni oyo efungoli nzela ya bomoi ya Nzambe na bana basi mpe bana mibali banso balingi kosangana na yango. Ezali mposa ekomami ontei ya motema ya moto na moto, oyo ezali kobenga botondi, likebi mpe esengo.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

02 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 08:46