Moteki biloko na nzela ya mokolo akokumba pusupusu na ye na Peshawar, na Pakistan Moteki biloko na nzela ya mokolo akokumba pusupusu na ye na Peshawar, na Pakistan  (ANSA)

Po ya Ngwendé ya Santu Petelo, esengeli kobátela lokúmu pe mosála ya mikóló

O eleko ya bokútáni ya mbala 60 ya Conseil des droits de l'homme, Mgr Ettore Balestrero, motáli ya ngonga insó ya Ngwendé ya Sántu Petelo epai ya ONU na Genève, alobaki pósá ya kobátela ba mikóló bazali na mibú koleka 60, baye bakokóma milliard 3 na 2050.

Jean-René Bompolonga – Kinshasa

Kobátela makoki ya bomoto ya mikólo na mokili mobimba. Wana ezali mbela epesamaki na Mgr Ettore Balestrero, motali ya ngonga insó ya Ngwendé ya Sántu Petelo epai ya ONU na Genève, o eleko lya bozui maloba, mokolo ya misáto 17 ya sánzá ya libwá, o eleko ya bokútáni ya mbala ya 60 ya Lisanga etálaka makoki ya bomoto ya ONU. Ntoma ya Papá akebisaki lokóla na likambo ya komóna 'te bato mingi bamibongisami nanu te na oyo etali mbóngwama ya motángo ya bato ezali koya. Úto leló kinó 2030, elakisaki ye, moto mókó likoló na motóba (1/6) akozala na mibú 60 to koleka, motúya mókó esengeli komata mbala ibale úto leló kinó 2050. Na likambo etali mbóngwama, Mgr Balestrero alobaki 'te bolembu pe lokúmu ya mikóló bisengeli mibátelama na limemya eye ebongi na bangó na mibéko ya sólo, biye bikotia na káti lokóla bolamu ya nkita pe ya bomoto na bangó.

Motúya ya moto

"Mbóngwana ena ya motúya ya bato ezali lokóla likambo ya molimo ekolakisa loléngé bato bazali kopesa lokúmu pe kobátela mikóló na bango", elobaki ye. Na bokoli ya bato, esengeli kozua ndéngé ya kokabola ba nkita káti ya lisálisi ya baye bazali kosála pe lisúngi na baye basengeli na yango, ebakisaki episkopo. Alobaki 'te mbóngwana ena ekoki kosálema te na botiyi pembeni mikóló. Lokúmu na bango, esakolaki ye, ekokita te na mobú to bobebi ya nzóto pe ya makanisi

"Motúya ya moto mókó ekoki kolimbolama te na bolenge, molende, bokasi ya nzóto to bokolongono ya nzóto mókó malamu, po ezali na bosóló ebóngwamaka te 'te moto mókó mókó akelami na elili pe na bokokani na Nzambe, likambo mókó ekoki kolongwa te, atá na ngonga", elobaki ye.

Ba mikóló bazali bozito mókó te

 Motindami ya Papá epai ya ONU na Genève atelemelaki ba politiki ya "kobwaka", miye mizali komóna mikóló lokóla bozito mókó po ya bato, ba politiki miye mizali na káti na miango mikáno ya kotia na mobéko euthanasie to lisúngi po ya komiboma. Ba politiki mina, elobaki ye, mikosálisa "momeseno mókó ya liwá" na esika ya limemya na bakulutu na bisó.

Mgr Balestrero alendisaki po ya kobátela lokúmu ya mikóló na nzela ya ba epasó, masálisi na mosolo pe misála ya bomoto pe ya bokólóngónó ya nzoto. Sóki ba mikóló basengeli kokoba kosála po ya kobika, basengeli kozua bobáteli mókó na bozui mosála zambi ya kobúnda na eye ekotia bango pembeni, elobaki ye. "Bakopima bangó bopemi eye babongi na yangó pe likoki ya kokabola bwanyá na bangó pe matéya na bangó na baye balandi bangó, na kosálisa bangó bôngó po ya komona lobi na elikya pe mokúmbá"

Kosálisa bási pe mabótá

Bási, mingi mingi, elobaki Mgr Balestrero, basengeli kozua bokóti mókó elongobani na bobáteli pe na ba pansio, po ya kobátela bangó o eleko ya kimobangé na bangó. Na bosúkisi, episkopo abengaki na bomókó o ntei ya ba génération po ya kosúnga makási ndéngé ya bobáteli bato, mingi penza po ya kosálisa mabótá miye mizali po ya mikóló ebelé esika mókó ya lisálisi po na bangó. Ngwendé ya Sántu- Petelo, esúkisaki ye, "ekosenga botiyi makoki ebelé na ba politiki ya bobáteli bato po ya mabótá, po ya kolendisa pe kobátela libótá lokóla likonzi ya makási ya bomoto"

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

21 sánzá ya libwa 2025, 11:32