Cardinal Newman akokoma Motei mwa Eklezya
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Nakopesa nkombo ya lokùmu ya Moteyi mwa Eklezya na Santu John Henry Newman oyo apesaki lisungi monene na mbongwana ya teoloji mpe na bososoli mpo ‘te mateya ma bokristo bokola. Nde na maloba maye mpe na esengo o motema, Léon ya zomi na minei ayebisaki bakristu basanganaki na esika Saint-Pierre mpo na misa ya zubilé ya ba katekisti. Liyebisi lina elobi solo ‘te, episkopo wa lokùmu Newman, akozwa nkombo en aya lokumu na libaku lya zubile ya Balakisi, oyo ekosalema o mokolo mwa 1er ya sànzà ya novembe ya mobù moye. Newman azalaki moto ya Grande Bretagne, na eleko ya zomi na libwa (XIXe siècle). Abongwanaki na eyamba ya katoliko, nzokandé akoti na lisanga oyo bato bazali mingi te, elongo na Santu Thérèsa ya Lisieux (oyo bakobengaka mpe Santu Thersa ya mwana Yezu), Santu Grégoire ya Narek to Santu Hildegarde ya Bingen.
Losambo mpo na Bato bazui likàmà ya mompepe makasi ya Ragasa
Tata Mosantu akanisaki mpe likambo lya “mompepe makasi oyo ebetaki na mabele ma Asiya, mingi mpenza na bikolo bya Filipina, esanga ya Taiwan, engumba ya Hong Kong, etuka ya Guangdong mpe na Vietnam”. Alakisi bozali pembeni nà bato baye banso, mingi mingi babola. Asambeli mp ona baye bazwaki likàmà, baye babungisami, mabota maiké maye balungue bisika bazalaki kofanda, nà mpe baye bazali kosalisa; abosani bakonzi ya basivile banso. Asukisaki na koloba ‘te: Nzambe apesa na bango ngrasya ya yé mpe makoki mpe makasi ya kolekisa mikakatano miye.
Mompepe moye makasi mobebisi biloko mingi mpe epusi bato nkoto zomi, na kotika bisika bafandaka na mboka Filipina. Na Taiwan, mbula makasi ebukaki etongà ya liziba to libulu ya mai, mpe ebomi bato zomi na minei. Bato pene ya tuku mibale na mibale bazali nayino babungi. Bato zomi na moko babungisi bomoi bwa bango, bongo 400 000 balongwe na bandako babango.
Mbote na bakatekisi
Pàpa Leon ya zomi na minei (Léon XIV) abosani te na kopesa lisusu mbote na ba katekisi tuku misato na libwa. Apesaki moko na moko na bango kuruze, apesi bango mokumba ya bokatekisi. Manso masalemaki na tango ya misa . Atombelaki bakatekisi banso bazwami o mokili mobimba “mosala malamu”. Matondi na bino mpo na mosala mwa bino mpo ya Eklezia! Tóbondela mpo na bango, mingimingi baye bazali kosala o kati ya mikakatano makasi. Na nsuka, Tata Mosantu abéngaki Ngondo Maria mpo ‘te “asunga eklezya lelo na mosala mwa kosakola boyambi”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.
