Luka

2025.08.20 Liyangani monene ya Lisanga lya baepiskopo ya Pérou 2025.08.20 Liyangani monene ya Lisanga lya baepiskopo ya Pérou 

Mobembo ya Pàpa na Pérou, «ekozala tango ya kozongisa boyokani».

Mgr Carlos García Camader, mokambi ya lisanga ya ba episkopo ya Pérou, alobeli mobembo ya Léon XIV na sànzà ya zomi na moko na mboka epai asalaki mosala ya misionele : Tozali kolikya ‘te ekozala ntango ya kimya mpe ya bondeko, kasi mpe libakù ya kotalela na lolenge ya malamu lolenge ya kosàla elongo mpo na bolamu ya mboka.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Eklezya ya Pérou eyambi na «nsayi enene mpe esengo», sango ya mobembo ya Pàpa Léon XIV, oyo eponami mpo na mokolo mwa zomi na moko kino zomi na sambo ya novémbe ekoyà (11 – 17 novembre). Etangami na kati ya mobembo molayi ya bontómà na Amériki latine, oyo ekokotisa mpe biteni ya Uruguay mpe Argentine. Mobembo oyo ekoleka na Lima, Chiclayo, Cusco mpe Pucallpa,  ekozala tango ya kimya, ya kozongisa boyokani mpe ya elikya mpo na bato ya Pérou ; elobi Mgr Carlos García Camader, episkopo oyo azali mokambi ya Lisanga ya baepiskopo, na ba Medias ya Vatikan.

Na mokolo mwa 5 ya sànzà ya Agusto, bakonzi ya eklezya Katoliko bapesaki liyebisi ‘te Léon ya zomi na minei akoyà na Pérou, mpe yango epesaki esengo mingi na bankoto ya bayambi na ekólo yango mobimba, epai Robert Francis Prevost alekisaki pene ya mibù tukù mibale lokola misionele. García Camader alobi ‘te ezali libakù ya kolendisa bomoko, kimya mpe elikya liboso ya mikakatano oyo mboka ezali kokutana na yango. «Tozali kolikya ‘te ekozala ntango ya kimya, ya bosósóli mpe ya bondeko, kasi mpe libakù ya kotalela na lolenge ya malamu ndenge nini tokoki kosala elongo mpo na bolamu ya mboka na biso».

Pàpa azelisami na Mboka Uruguay, Argentine mpe Pérou
Pàpa azelisami na Mboka Uruguay, Argentine mpe Pérou   (@Vatican Media)

Nsango oyo ezali kosangisa bato banso ya Pérou

Mokambi ya episkopat alobi ‘te bosengà ya liboso ya Eklezya ya Pérou ezali ‘te bokutani ya Nganga-Mokonzi ekosalisa mpo na kolendisa bomoko ya ekólo mpe mpo na kotombola nzela ya solo ya kozongisa boyokani. Tozali kolikya kozwa nsango ya Papa oyo ekosangisa bato banso ya Pérou. Tozali na bitúká mingi, moko na moko ezali na lisoló na yango mpe na mpasi na yango, mpe na batango mosusu tokoki kokanisa ‘te ezalela ya bato mosusu ezali mpasi mpo na bato banso.

Kokabola bisengo, mpasi mpe elikya n abato banso ya Pérou, ekopesa nzela ya kotonga lingomba moko ya solo, na lisalisi ya elimo ya Nsango Elamu, ekobaki episkopo na koloba: “Na kanisi ‘te kosangisa bampasi nà esengo, mpe nsayi nà elikya, ekopesa nzela ya kotonga lingomba ya solo, mpe komiyoka lokola eklezya sé yoko, oyo ekolakisa tango inso ‘te mpasi ya ndeko moko, ezali mpasi ya bandeko banso, mpe esika ndeko moko azali na esengo, bato banso bazali kosepela. Mayoki ya lolenge yoko, na motema sé moko”.

Komilengele na molimo mpo na mobembo

Mgr Garcia abyangi ba-Perou na nzela ya liyebisi ya bopanzi nsango, bàmilengele na molimo mpo ya koyamba Mokitani ya Petro: “Bozali bwa yé o kati ya biso ekozala likabo ya solo mpo ya bato ba biso mpe libakù ya kozongisa sika boyambi bwa biso, kolendisa elikya ya biso,  mpe ya kotambola elongo lokola eklezya, mpo ya Nsango Elamu”.

 

Matondo mingi na ndenge otangi liyebisi liye

10 sánzá ya mwambe 2026, 13:15